11 Anjelu ya libulu ya monene mpe ya molili makasi nde azalaki mokonzi na yango. Kombo na ye, na lokota ya Ebre, « Abadoni ; » mpe, na lokota ya Greki, « Apolioni. »
Nzokande, kuna na Yelusalemi, pene ya Ekuke ya Bameme, ezalaki na liziba moko oyo, na lokota ya Arami, bazalaki kobenga « Betesida. » Liziba yango ezalaki na baveranda mitano zingazinga na yango.
Ezali Satana nde azali tata na bino, mpe bolingi nde kaka kokokisa posa ya tata na bino. Wuta na ebandeli, ye azala mobomi ; avandaka kati na solo te, pamba te solo ezalaka te kati na ye. Tango akosaka, alobaka penza makambo oyo ewutaka kati na ye ; pamba te azali mokosi mpe tata ya lokuta.
ba-oyo bazangi kondima, ba-oyo mayele na bango ebebisama na nzambe ya mokili oyo, mpo ete bamona te pole ya Sango Malamu oyo emonisaka nkembo ya Klisto oyo azali elilingi ya Nzambe.
oyo bozalaki kosala na kala mpo na kobika bomoi na bino tango bozalaki kotambola kolanda baposa ya mokili oyo, mpe tango bozalaki kolanda mokonzi ya milimo mabe, molimo oyo ezali kosala sik’oyo kati na bato oyo bazangi botosi epai ya Nzambe.
Bino, bana na ngai, bozali ya Nzambe mpe bosili kolonga basakoli yango ya lokuta, pamba te Ye oyo azali kati na bino azali na nguya koleka ye oyo azali kati na mokili.
Babwakaki dalagona monene, nyoka ya kala, oyo babengaka zabolo to Satana, oyo akosaka mokili mobimba. Ebwakamaki na mabele elongo na ba-anjelu na yango.