Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 8:9 - Mokanda na Bomoi

9 mpe eteni moko kati na biteni misato ya bikelamu oyo evandaka kati na ebale monene ekufaki, eteni moko kati na biteni misato ya bamasuwa nyonso ebebisamaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 8:9
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mbala moko, bakomaki kolenga wana lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota


Mbisi ya Nili ekufaki mpe mayi elumbaki solo ya kopola na ndenge ete bato ya Ejipito bakokaki lisusu te komela yango. Makila ezalaki na bisika nyonso ya Ejipito.


bamasuwa nyonso ya Tarsisi mpe bomengo na yango nyonso ya kitoko.


Maloba na Yawe na tina na engumba ya Tiri : Oh bamasuwa ya Tarsisi, bosala matanga ! Pamba te engumba ya Tiri esili kobebisama nyonso : ezala ndako to libongo, eloko moko te etikali ! Bazwaki sango oyo wuta na esanga ya Shipele.


Na mokili mobimba, » elobi Yawe, « bandambo mibale ya bato kati na bandambo misato bakobebisama mpe bakokufa ; mpe ndambo moko ya bato kati na bandambo misato nde bakotikala na mokili.


Nakomema ndambo moko wana ya bato na moto, nakopetola bango ndenge bapetolaka palata na moto mpe nakomeka bango ndenge bamekaka wolo na moto ; bakobelela Kombo na Ngai, mpe Ngai nakoyanola bango. Nakoloba na bango : ‹ Bozali bato na Ngai, › mpe bango bakoloba : ‹ Yawe azali Nzambe na biso ! › »


Mokila na yango ekombolaki eteni moko kati na biteni misato ya minzoto ya likolo mpe ebwakaki yango na mabele. Dalagona etelemaki liboso ya mwasi oyo azalaki koyoka pasi ya kobota mpo ete elia mwana na ye tango kaka akobotama.


Anjelu ya mibale asopaki kopo na ye na ebale monene, mpe ebale yango ekomaki lokola makila ya mowei ; mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezalaki kati na ebale monene ekufaki.


Anjelu ya misato abetaki kelelo ; mpe na mbala moko, monzoto moko ya monene oyo ezali kopela lokola mwinda monene ekweyelaki, longwa na likolo, eteni moko kati na biteni misato ya bibale mpe bitima ya mayi.


Anjelu ya minei abetaki kelelo ; mpe na mbala moko, eteni moko kati na biteni misato ya moyi, ya sanza mpe ya minzoto ebebaki. Na bongo, eteni moko kati na biteni misato ya kongenga na yango ekomaki molili. Boye eteni moko kati na biteni misato ya mokolo mpe ya butu ezangaki pole.


Anjelu ya liboso abetaki kelelo ; mpe, mbala moko, mvula ya mabanga mike elongo na moto esangana na makila ebwakamaki na mabele. Bongo biloko oyo ezikaki : eteni moko kati na biteni misato ya mabele, eteni moko kati na biteni misato ya banzete, mpe matiti nyonso ya mobesu.


Boye ba-anjelu wana minei oyo babongisamaki mpo na ngonga wana, mokolo wana, sanza wana mpe mobu wana, bafungolamaki mpo ete baboma eteni moko kati na biteni misato ya bato.


Tala bapasi misato oyo ezalaki kobima na minoko ya bampunda : moto, milinga mpe sofolo. Ebomaki eteni moko kati na biteni misato ya bato.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ