Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 8:3 - Mokanda na Bomoi

3 Anjelu mosusu ayaki mpe atelemaki na etumbelo ; amemaki mbabola basala na wolo mpo na kotumba na yango ansa. Bapesaki ye ansa ebele ya kobonza elongo na mabondeli ya basantu nyonso, mpo ete abonza yango na likolo ya etumbelo basala na wolo, liboso ya Kiti ya Bokonzi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 8:3
32 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

basani ya minene, bambeli, bakopo mpo na kosopela makila, bakeni, bambabola ya wolo ya peto, elongo na bikangelo ya wolo mpo na bikuke ya kati ya Tempelo, Esika-Oyo-Eleki-Bule, mpe mpo na bikuke ya esika oyo bato nyonso bavandaka, na ekotelo ya Tempelo.


Liboso na Yo, tika ete libondeli na ngai ezala lokola mbeka ya malasi, mpe botombwami ya maboko na ngai ezala lokola mbeka ya pokwa !


Atiaki etumbelo ya wolo kati na Ndako ya kapo ya Bokutani liboso ya rido,


Moko kati na baserafe asimbaki, na loboko na ye, likala ya moto oyo azwaki na etumbelo na bisimbelo, apumbwaki mpe ayaki epai na ngai ;


Ezalaki na etumbelo moko ya mabaya, oyo ezalaki na metele pene moko na basantimetele tuku mitano na bosanda mpe metele moko na molayi. Basonge na yango, se na yango mpe mipanzi na yango ezalaki ya mabaya. Moto yango alobaki na ngai : « Oyo nde mesa oyo ezali liboso ya Yawe. »


Namonaki Yawe atelemi pene ya etumbelo, mpe alobaki : « Buka makonzi ya Tempelo mpo ete ndako mobimba eningana mpe ekweyela bato nyonso na mito. Bato oyo bakotikala, nakoboma bango na mopanga. Moko te akokima, moko te akobika.


Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, longwa na ebimelo kino na elalelo ya moyi ; bakobonza na bisika nyonso malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Kombo na Ngai mpe makabo ya peto, pamba te Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Bakotanda liputa ya langi ya ble na likolo ya etumbelo ya wolo mpe bakofinika bulangeti basala na poso ya nyama ya ebale ; bongo bakotia balate na yango oyo ekosunga mpo na komema.


mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.


Tango ekomaki ngonga ya kotumba malasi ya ansa, lisanga mobimba ya basambeli ezalaki kosambela na libanda.


Nani akokatela bango etumbu ? Moko te ! Yesu-Klisto akufaki ; kutu, asekwaki, azali na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe, mpe azali kobondela mpo na biso.


Yango wana azali na makoki ya kobikisa libela, bato oyo bapusanaka pene ya Nzambe na nzela na Ye, mpo ete azali tango nyonso na bomoi mpo na kobondelaka Nzambe na tina na bango.


Kati na yango, ezalaki na etumbelo ansa oyo basala na wolo ; ezalaki mpe na Sanduku ya Boyokani, oyo babamba wolo na mobimba na yango. Kati na Sanduku ya Boyokani, ezalaki na sani ya wolo, oyo batia mana kati na yango ; lingenda ya Aron oyo ebimisaki mito ya banzete, mpe bitando ya mabanga oyo batobolaki makomi ya mibeko ya boyokani.


Bongo namonaki anjelu mosusu ya nguya makasi kokita wuta na Lola ; lipata moko ezipaki ye mpe monama ezingelaki moto na ye. Elongi na ye ezali kongenga lokola moyi, mpe makolo na ye ezalaki lokola makonzi ya moto.


Sima, anjelu mosusu oyo azalaki mokonzi ya moto alongwaki na etumbelo, mpe alobaki na mongongo makasi epai na ye oyo asimbaki mbeli ya minu makasi : « Kamata mbeli na yo ya minu mpe buka maboke ya bambuma ya vino ya mabele, pamba te bambuma yango ya vino eteli. »


Tango kaka azwaki buku, bikelamu minei ya bomoi mpe bampaka tuku mibale na minei bagumbamaki liboso ya Mpate. Moko na moko kati na bango asimbaki na loboko na ye lindanda mpe kopo ya wolo etonda na ansa oyo ezali mabondeli ya basantu.


Tango Mpate abukaki ekangelo ya mitano, namonaki na se ya etumbelo, milimo ya bato oyo baboma likolo na Liloba na Nzambe mpe likolo na litatoli na bango.


Bongo namonaki anjelu mosusu azali komata longwa na este mpe asimbi kashe ya Nzambe na bomoi. Agangaki na mongongo makasi epai ya ba-anjelu minei oyo Nzambe apesaki nguya ya kosala mabe na mokili mpe na ebale monene.


Wuta na loboko ya anjelu, molinga ya ansa elongo na mabondeli ya basantu emataki liboso ya Nzambe.


Bongo anjelu azwaki mbabola, atondisaki yango na makala ya moto oyo azwaki na etumbelo, mpe abwakaki mbabola yango na mabele. Mbala moko, lokito moko ya makasi eyokanaki : bakake, mingongo, mikalikali mpe koningana ya mabele.


Anjelu ya motoba abetaki kelelo, mpe nayokaki mongongo moko kobima longwa na maseke minei ya etumbelo oyo basala na wolo, etumbelo oyo ezalaki liboso ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ