Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 7:4 - Mokanda na Bomoi

4 Bongo nayokaki motango ya bato oyo babetamaki kashe : nkoto nkama moko na tuku minei na minei ; bazalaki bato ya mabota nyonso ya bana ya Isalaele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 7:4
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe amemaki Abrami na libanda mpe alobaki na ye : — Tala na likolo mpe tanga minzoto soki okokoka kotanga yango. Alobaki na ye lisusu : — Ezali boye nde bakitani na yo bakozala.


Mabanga yango ekozala zomi na mibale kolanda bakombo ya bana mibali ya Isalaele. Na likolo ya libanga moko na moko, bakokoma kombo ya moko kati na mabota zomi na mibale ; bakokoma yango ndenge basalaka bililingi na kashe.


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : « Tala bandelo oyo bokosalela mpo na kokabola mokili lokola libula epai ya mabota nyonso zomi na mibale ya Isalaele : bakitani ya Jozefi bakozwa biteni mibale.


Basali oyo bakobanda kowuta na engumba epai wapi basalaka mpo na kosala mosala ya bilanga bakobimela na mabota nyonso ya Isalaele.


bikuke ya engumba ekobengama na bakombo ya mabota ya Isalaele. Na ngambo ya nor, ekozala na bikuke misato : ekuke ya Ribeni, ekuke ya Yuda, mpe ekuke ya Levi ;


Liloba na Yawe. Liloba na Yawe ekomi na mokili ya Adraki, ekowumela na engumba Damasi, pamba te miso ya bato mpe ya mabota nyonso ya Isalaele ezali kotalela Yawe.


Yesu alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : tango makambo nyonso ekokoma ya sika, tango Mwana na Moto akovanda na Kiti ya Bokonzi na Ye ya nkembo, bino bato oyo bozali kolanda Ngai, bino mpe bokovanda na bakiti zomi na mibale ya bokonzi, mpo na koyangela mabota zomi na mibale ya Isalaele.


Sima na mwa tango, mosali ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, nasali ndenge otindaki ngai ; kasi bisika ezali nanu. »


mpo ete bokoka kolia mpe komela na mesa na Ngai kati na Bokonzi na Ngai, mpe ete bokoka kovanda na bakiti ya bokonzi mpo na koyangela mabota zomi na mibale ya Isalaele.


Bato ya mabota na biso zomi na mibale basalelaki Nzambe, butu mpe moyi, na kolemba te, mpo ete bazalaki na elikya ete bakomona kokokisama ya elaka yango. Mokonzi Agripa, ezali kaka mpo na elikya yango nde Bayuda bafundi ngai.


Ezayi agangaki na tina na Isalaele : « Ata soki motango ya bana ya Isalaele ezalaki lokola zelo ya ebale monene, ndambo kaka nde bakobika.


Ngai Jake, mosali na Nzambe mpe na Nkolo Yesu-Klisto ; Epai ya mabota zomi na mibale oyo epalangana kati na biloko : Napesi bino mbote.


Bongo namonaki Mpate atelemi na ngomba Siona elongo na bato nkoto nkama moko na tuku minei na minei. Kombo ya Mpate mpe ya Tata na Ye ezalaki ya kokomama na bambunzu ya bato yango.


mpe bazali koyemba nzembo ya sika liboso ya Kiti ya Bokonzi, ya bikelamu minei ya bomoi mpe ya bampaka. Moko te akokaki koyekola nzembo yango longola kaka bato nkoto nkama moko na tuku minei na minei oyo basikolamaki wuta na mokili.


Kati na libota ya Yuda, bato nkoto zomi na mibale babetamaki kashe ; kati na libota ya Ribeni, bato nkoto zomi na mibale ; kati na libota ya Gadi, bato nkoto zomi na mibale ;


Bazalaki minkoko nkama mibale ya basoda oyo babundaka na likolo ya bampunda. Yango nde motango na bango oyo nayokaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ