17 pamba te Mpate oyo azali na kati-kati ya Kiti ya Bokonzi akozala Mobateli na bango, akomema bango na bitima ya mayi ya bomoi, mpe Nzambe akopangusa mpinzoli nyonso ya miso na bango.
Na ngomba oyo, Yawe, Mokonzi ya mampinga, akobongisa feti ya biloko kitoko mpo na bato nyonso, feti monene ya vino ya kala, ya misuni oyo eleki mafuta mpe ya vino ya kala oyo balongola malamu salite.
akolimwisa kufa mpo na libela. Nkolo Yawe akopangusa mpinzoli na bilongi nyonso, akolongola soni ya bato na Ye kati na mokili mobimba. Solo, Yawe alobi.
Boye, bakangolami na Yawe bakozonga, bakokota na Siona na nzembo ya elonga, mpe esengo ya suka te ekozala na likolo ya mito na bango lokola mitole. Esengo mpe kosepela ekopesamela bango, nzokande mawa mpe kolela ekosila.
Azali kobatela etonga na Ye lokola mobateli bibwele : kosangisa bana meme na maboko na Ye mpe kokanga bango na tolo na Ye ; kotambolisa malembe-malembe bana meme ya basi oyo ezali nanu komela mabele.
Boye, bato oyo Yawe akangoli bakozonga, bakokota kati na Siona na banzembo ya esengo ; esengo ya libela na libela ekozala lokola motole na mito na bango ; bakotondisama na esengo mpe na kosepela, bongo pasi mpe minyoko ekokima mosika na bango.
Bakendeki na kolela, kasi nakozongisa bango, wana bakozala kati na kobondela ; nakokamba bango na bisika oyo mayi etiolaka, na nzela esembolama mpo ete babeta mabaku te ; pamba te nazali Tata ya Isalaele, mpe Efrayimi azali mwana na Ngai ya liboso.
Boye, akozala kimia na bango ! Tango mampinga ya Asiri bakokota na makasi kati na mokili na biso mpe na bandako na biso, oyo batonga makasi, tokotindela bango babateli sambo ya bibwele mpe bakambi mwambe ya bato mpo na kobundisa bango.
Kamba bato na Yo na lingenda na Yo ndenge mobateli bibwele asalaka ! Pamba te bazali bameme ya libula na Yo, oyo ezali lokola kotelengana yango moko kati na zamba, na etando moko ya kitoko. Tika ete elia na bilanga ya Bashani mpe ya Galadi ndenge ezalaki kolia na tango ya kala.
« Bongo yo, Beteleemi, kati na mabele ya Yuda, ozali solo moke te kati na bingumba ya Yuda, pamba te Mokonzi oyo, lokola Mobateli bibwele, akotambolisa bato na Ngai, Isalaele, akobima nde kati na yo. »
Yesu azongiselaki ye : — Soki oyebaki likabo ya Nzambe mpe nani oyo asengi yo mayi, ezali yo nde olingaki kosenga Ye mayi mpo ete omela, mpe Ye alingaki kopesa yo mayi ya bomoi.
kasi moto oyo akomela mayi oyo Ngai nakopesa ye akoyoka lisusu posa ya mayi te : mayi oyo Ngai nakopesa ye ekokoma kati na ye lokola etima ya mayi oyo ekawukaka te mpe etiolaka kino na bomoi ya seko.
Bomibatela malamu mpe bobatela etonga nyonso oyo kati na yango Molimo Mosantu atiaki bino lokola bakengeli ; bobatela Lingomba ya Nzambe, pamba te asombaki yango na makila na Ye moko.
Lokola babateli bibwele, bobatelaka malamu etonga oyo Nzambe apesi bino mokumba ya kokamba. Bosalaka bongo kolanda mokano ya Nzambe : na kotindika te, kasi na komipesa mobimba ; na makanisi te ya konduka mbongo, kasi na posa makasi ya kosalela bango ;
Ezali bato oyo bamikomisaki mbindo te na nzela ya basi, pamba te bamibatelaki na kozanga kosangisa banzoto na bango na basi. Balandaka Mpate na bisika nyonso oyo akendaka. Basikolamaki kati na bato mpo ete babonzama lokola bambuma ya liboso mpo na Nzambe mpe mpo na Mpate.
Engumba yango ezali na posa te ya moyi to ya sanza mpo na kongengisa yango, pamba te engengisamaka na nkembo ya Nzambe ; bongo Mpate azali mwinda na yango.
Alobaki na ngai lisusu : « Ekokisami. Nazali Alifa mpe Omega, Ebandeli mpe Suka. Na moto oyo azali na posa ya mayi, nakopesa mayi ya ofele wuta na etima ya mayi ya bomoi.
Bongo anjelu alakisaki ngai ebale ya mayi ya bomoi ; ezalaki kongenga lokola talatala mpe ezalaki kobima wuta na Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe ya Mpate.
« Nkolo mpe Nzambe na biso, obongi na nkembo, na lokumu mpe na nguya, pamba te Yo nde okela biloko nyonso : ezalaki mpe ekelamaki mpo na mokano na Yo. »
Mpe namonaki Mpate moko ya kotelema na kati-kati ya Kiti ya Bokonzi, mpe bazingela na bikelamu minei ya bomoi elongo na bampaka. Mpate yango amonanaki lokola nde basilaki koboma Ye ; azalaki na maseke sambo mpe miso sambo oyo ezali milimo sambo ya Nzambe, oyo etindama na mokili mobimba.