Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 7:12 - Mokanda na Bomoi

12 na koloba : « Amen ! Tika ete masanzoli, nkembo, bwanya, matondi, lokumu, nguya mpe makasi ezala ya Nzambe na biso, mpo na libela na libela ! Amen ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 7:12
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango ya Davidi mpe ya Azafi, ezalaki na bakambi ya babeti mindule mpe ya banzembo mpo na kokumisa mpe kozongisa matondi epai ya Nzambe.


Kati na Balevi, ezalaki na Jozue, Binuwi, Kadimieli, Sherebia, Yuda mpe Matania oyo, elongo na baninga na ye ya mosala, azalaki mokambi ya banzembo ya matondi.


Bokota na bikuke na Ye na kozongisa matondi, bokota na lopango na Ye na kokumisa. Bosanzola Ye, bopambola Kombo na Ye.


Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apambolama seko na seko ! Tika ete bato nyonso baloba : « Amen ! » Bokumisa Yawe !


Tika ete babonza bambeka ya kozongisa matondi mpe bapanza sango ya misala na Ye na koganga na esengo !


Nakobonzela Yo mbeka mpo na kozongisa matondi, mpe nakobelela Kombo ya Yawe.


Boyembela Yawe nzembo ya matondi ! Bobetela Nzambe na biso lindanda mpo na kosanzola Ye !


Mpo ete nazangi pamela, okosunga ngai mpe okovandisa ngai na makolo na Yo mpo na libela.


Bonzelaka Nzambe matondi lokola mbeka, mpe kokisaka bandayi na yo epai ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.


Tika ete Kombo na Ye ya nkembo epambolama libela na libela ! Tika ete mokili mobimba etonda na nkembo na Ye ! Amen ! Amen !


Yawe, kanisa mafinga ya banguna na Yo, oyo batiolaka bomoi ya mopakolami na Yo !


Tokende liboso na Ye elongo na mabondeli ya kozongisa matondi, tobetela Ye maboko elongo na banzembo.


Solo, Yawe akobondisa Siona mpe akotala na liso ya ngolu bisika nyonso ya Siona oyo ebeba ; akokomisa esobe na yango lokola Edeni, bisika na yango ekawuka, lokola elanga ya Yawe. Esengo mpe kosepela nde ekomonana kuna, matondi mpe mongongo ya banzembo.


ekoyokana kuna lokito ya banzembo ya esengo mpe ya masanzoli, mingongo ya mobandami na libala ya mwasi mpe ya mobali, mpe mingongo ya bato oyo bazali kobonza kati na Tempelo ya Yawe makabo ya kozongisa matondi, na koloba : ‘ Bozongisa matondi epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpo ete Yawe azali malamu ; bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! ’ Pamba te nakozongisa lisusu kitoko ya mokili yango ndenge ezalaki liboso, › elobi Yawe.


Boye engumba oyo, Yelusalemi, ekosala lokumu, esengo, masanzoli mpe nkembo ya Kombo na Ngai liboso ya bikolo nyonso ya mabele, oyo ekoyoka sango ya makambo nyonso ya kitoko oyo nakosala mpo na yango. Bikolo yango ekokamwa mpe ekolenga na somo ya komona makambo nyonso ya kitoko mpe kimia oyo nakopesa na engumba yango. ›


Bato oyo bakangamaka na banzambe ya bikeko ezanga tina babungisaka bolingo oyo Nzambe alingaka bango.


komema biso na komekama te, kasi kangola biso longwa na misala ya Satana ; [pamba te bokonzi, nguya mpe nkembo ezali ya Yo seko na seko.]  ›


Pamba te biloko nyonso ewutaka epai na Ye, na nzela na Ye mpe mpo na Ye. Tika ete nkembo ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen !


Soki ozali kozongisa matondi epai ya Nzambe kati na molimo na yo, ndenge nini ba-oyo bazali koyoka te bakoki koloba « Amen ! » na losambo na yo ya kozongisa matondi epai ya Nzambe ? Pamba te bayebi te makambo oyo ozali koloba.


Makambo oyo nyonso ezali mpo na litomba na bino, mpo ete ngolu efuluka koleka kati na bato ebele, mpe ete losambo ya kozongisa matondi ekoma mingi mpo na nkembo ya Nzambe.


bomilendisaka mpe botongaka bomoi na bino kati na Ye, bokangamaka na kondima ndenge bateyaki bino, mpe bozongisaka matondi epai ya Nzambe.


Mpe nyonso oyo bokosala, ezala na maloba to na misala, bosalaka yango na Kombo ya Nkolo Yesu, na kozongisa matondi epai ya Nzambe Tata na nzela ya Yesu-Klisto.


epai ya Nzambe moko kaka, Mobikisi na biso, na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, tika ete nkembo, lokumu, nguya mpe bokonzi ezala ya Ye, wuta liboso ya tango, sik’oyo mpe mpo na libela na libela ! Amen !


Nazali Ye oyo azali na bomoi ; nakufaki, mpe sik’oyo tala, nazali na bomoi mpo na libela na libela ! Nasimbi bafungola ya kufa mpe ya mboka ya bakufi.


Bampaka tuku mibale na minei mpe bikelamu minei ya bomoi bafukamaki mpe bagumbamelaki Nzambe oyo avandaka na Kiti ya Bokonzi, mpe bagangaki : « Amen ! Aleluya ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ