Emoniseli 6:8 - Mokanda na Bomoi8 Namonaki liboso na ngai mpunda moko ya langi ya mayi ya pondu ; kombo ya motambolisi na yango ezalaki « Kufa, » mpe mboka ya bakufi ezalaki kolanda motambolisi yango na sima. Bapesamelaki nguya ya koboma bato na nzela ya mopanga, ya nzala, ya bokono mpe ya banyama mabe, na etando ya eteni moko kati na biteni minei ya mokili. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Ndambo moko kati na bandambo misato ya bato na yo bakokufa na bokono oyo ebomaka to na nzala makasi kati na bamir na yo ; mpe ndambo moko kati na bandambo misato mosusu bakokufa na mopanga na libanda ya bamir na yo. Bongo, nakopanza ndambo moko kati na bandambo misato mosusu, na bisika mosusu mpe nakolanda bango na mopanga.