Emoniseli 6:4 - Mokanda na Bomoi4 Bongo mpunda mosusu ebimaki : ezalaki ya motane makasi. Motambolisi na yango apesamelaki nguya ya kolongola kimia na mokili mpe ya kosala ete bato babomana bango na bango. Mpe bapesaki ye lisusu mopanga moko ya monene. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mpo na lokumu oyo apesaki ye, bato ya bikolo, ya mikili mpe ya nkota nyonso bakomaki kolenga na somo liboso na ye. Mokonzi azalaki koboma bato oyo azalaki na posa ya koboma, kobikisa bato oyo azalaki na posa ya kobikisa, kotombola bato oyo azalaki na posa ya kotombola mpe kosambwisa bato oyo azalaki na posa ya kosambwisa.