Ekelamu ya liboso azalaki lokola nkosi ; ya mibale, lokola mwana ngombe ya mobali ; ya misato azalaki na elongi lokola ya moto, mpe ya minei azalaki lokola mpongo oyo ezali kopumbwa.
Bongo namonaki Mpate kobuka ekangelo ya liboso kati na bikangelo sambo ; mpe nayokaki moko kati na bikelamu minei ya bomoi koloba na mongongo makasi lokola kake : « Yaka ! »