Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 6:16 - Mokanda na Bomoi

16 Bazalaki koganga epai ya bangomba mpe epai ya mabanga minene : « Bokweyela biso mpe bobomba biso mpo ete Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi amona biso te, mpe mpo ete kanda ya Mpate ekweyela biso te !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 6:16
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Somo monene ekangi bango, pamba te Nzambe azali kati na bato ya sembo.


Kimela na madusu ya mabanga, bombama na putulu ya mabele liboso ya nguya ya kanda ya Yawe, liboso ya nkembo ya lokumu na Ye !


Na bisika nyonso oyo nakopanza bango, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, bato nyonso oyo bakotikala na bomoi kati na ekolo oyo ya mabe bakoluka kufa na esika ya bomoi. ›


Bisambelo ya likolo ya bangomba ya Beti-Aveni epai wapi Isalaele azalaki kosala masumu ekobebisama. Banzube mpe basende ekobota na bitumbelo na bango mpe ekozipa yango. Bongo bakoloba na bangomba milayi : « Bozipa biso ! » Mpe bakoloba na bangomba mikuse : « Bokweyela biso ! »


Yesu azongiselaki ye : — Otatoli yango. Kasi nazali koloba na bino : Kobanda sik’oyo, bokomona Mwana na Moto kovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe koya na nkembo na likolo ya mapata ya Likolo.


Yesu atalaki bango na mawa mpe ayokaki pasi mingi na motema mpo ete mitema na bango ezalaki makasi lokola libanga. Yesu alobaki na moto yango : — Sembola loboko na yo ! Moto yango asembolaki loboko na ye, mpe loboko yango ebikaki.


Bongo bakoloba na bangomba milayi : « Bokweyela biso ! » Mpe bakoloba na bangomba mikuse : « Bozipa biso ! »


mpe alapaki ndayi na Kombo ya Ye oyo azali na bomoi seko na seko, Ye oyo akela Lola mpe nyonso oyo ezali kati na yango, mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango : « Kobanda sik’oyo, tango ya kozela ezali lisusu te !


Mopanga moko ya minu ezalaki kobima na monoko na Ye mpo na kobeta bikolo. Akokamba yango na lingenda ya ebende mpe akonika bambuma ya vino kati na ekamolelo ya vino ya kanda monene ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.


Bongo namonaki Kiti monene ya Bokonzi, ya langi ya pembe elongo na Ye oyo avandaki na Kiti yango. Likolo mpe mabele ekimaki mosika na Ye mpe emonanaki lisusu te.


Mbala moko, Molimo asimbaki ngai mpe namonaki kati na Lola Kiti moko ya Bokonzi oyo moto moko avandelaki.


Wuta na Kiti yango ya Bokonzi, mikalikali ezalaki kongenga, makelele ya mingongo mpe lokito ya bakake ezalaki koyokana. Mpe liboso ya Kiti yango, minda sambo ezalaki kopela : ezali milimo sambo ya Nzambe.


Na tango nyonso oyo bikelamu ya bomoi bazalaki kopesa nkembo, lokumu mpe matondi epai na Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi mpe azali na bomoi seko na seko,


Bongo namonaki, na loboko ya mobali ya Ye oyo avandaki na Kiti ya Bokonzi, buku moko elingama, bakoma yango na kati mpe na libanda, mpe bakanga yango na bikangelo sambo.


Bagangaki na mongongo makasi : « Nkolo Nzambe, Yo oyo ozali Bule mpe Solo, okozela kino tango nini mpo na kosambisa bavandi ya mokili mpe kopesa bango etumbu mpo na makila na biso ? »


Na basanza wana mitano, bato bakoluka kufa, kasi bakozwa yango te ; bakolinga kokufa, kasi kufa ekokima bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ