15 Bakonzi ya mabele, bato minene, bakonzi ya mampinga ya basoda, bazwi, bato ya nguya, bawumbu mpe bansomi bakendeki kobombama kati na madusu ya mabanga mpe kati na mabanga minene ya bangomba.
Na pokwa, bayokaki makelele ya matambe ya Yawe Nzambe kotambola kati na elanga. Boye, mobali mpe mwasi babombamaki kati na banzete ya elanga mpo na kokima Yawe.
Bato bakokimela na madusu ya mabanga mpe na putulu ya mabele liboso ya nguya ya kanda ya Yawe, liboso ya nkembo ya lokumu na Ye, tango akotelema mpo na koningisa mokili.
Bakokima na madusu ya mabanga mpe kati na mabanga liboso ya nguya ya kanda ya Yawe, liboso ya nkembo ya lokumu na Ye, tango akotelema mpo na koningisa mokili.
ya solo, mokili etikalaki lisusu malamu te mpo na bango, bakomaki koyengayenga kati na bisobe, na bangomba, kati na bibombamelo ya mabanga mpe na mabulu oyo ezalaka na se ya mabele.
Mwinda ekopela lisusu te kati na yo, mpe mongongo ya mobali mpe mwasi oyo bawuti kobalana ekoyokana lisusu te kati na yo. Makambo wana nyonso ekosalema, pamba te bato na yo ya mombongo bazalaki bato na nguya ya mokili. Okosaki bato ya bikolo nyonso na nzela ya maji na yo.
Lokola loboko ya bato ya Madiani ezalaki na nguya makasi likolo ya Isalaele, bana ya Isalaele babongisaki mabulu ya kokimela mpe bibombelo kati na mabanga, kuna na likolo ya bangomba.
Tango bato ya Isalaele bamonaki ete bakomi na pasi, mpe ete mampinga na bango ezingami na bangambo nyonso, babombamaki kati na madusu ya mabanga, kati na mabulu, kati na mabanga, mpe kati na bandako ya se ya mabele.