Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 6:14 - Mokanda na Bomoi

14 Lola elongwaki lokola mokanda oyo bazali kolinga, bangomba nyonso mpe bisanga nyonso elongwaki na bisika na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 6:14
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na kala, otiaki miboko ya mokili, mpe maboko na Yo esalaki Likolo.


Mampinga nyonso ya likolo ekobukana ; mpe mapata ekolingama lokola buku, bongo mampinga na yango nyonso ekokweya ndenge makasa ya nzete ya vino mpe ya figi ekweyaka.


Ata bangomba milayi eningani, ata bangomba mikuse elongwe na bisika na yango, bolingo na Ngai epai na yo ekoningana te, mpe boyokani na Ngai ya kimia ekotikala kolongwa te, elobi Yawe oyo alingaka yo.


Solo, bisala-sala oyo ezali kosalema na bangomba mikuse mpe milayi ezali kaka makelele ya pamba. Solo, Yawe, Nzambe na biso, azali Lobiko ya Isalaele.


« Yo ngomba oyo obebisaka, yo oyo obebisaka mokili, nakotelemela yo, » elobi Yawe, « nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela yo, nakokitisa yo wuta na likolo ya mabanga, mpe nakokomisa yo ngomba ezika na moto.


Bambisi ya ebale, bandeke ya likolo, banyama ya zamba, bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu mpe bato nyonso oyo bazali awa na mabele bakolenga liboso na Ngai ; bangomba ekopanzana, mabanga minene ekobukana mpe bamir nyonso ekokweya na mabele.


Bangomba milayi eninganaka liboso na Ye, mpe bangomba mikuse epanzanaka. Mabele, mokili mpe bavandi na yango balengaka liboso na Ye.


Soki bangomba emoni Yo, elengaka ; mayi etiolaka makasi, ebale monene etombokaka mpe bambonge na yango emataka kino na likolo.


Tango atelemaki, mabele ekomaki koningana makasi ; tango abalolaki elongi na Ye mpo na kotala, bato ya bikolo bakomaki kolenga, bangomba milayi oyo ya kala-kala ebukanaki, mpe bangomba mikuse oyo ya kala-kala ekitaki ; kasi banzela na Ye ewumelaka seko na seko.


Solo, mokolo ya Nkolo ekoya lokola moyibi. Na mokolo yango, na lokito monene, Likolo ekolimwa, biloko ekozika na moto mpe ekonyangwama, mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango ekozwa etumbu ya kobebisama na moto.


Bisanga nyonso ekimaki, mpe bangomba emonanaki lisusu te.


Bongo namonaki Kiti monene ya Bokonzi, ya langi ya pembe elongo na Ye oyo avandaki na Kiti yango. Likolo mpe mabele ekimaki mosika na Ye mpe emonanaki lisusu te.


Bongo namonaki Likolo ya sika mpe mabele ya sika, pamba te Likolo ya liboso mpe mabele ya liboso elimwaki, mpe ebale monene ezalaki lisusu te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ