Minzoto na likolo mpe minda nyonso oyo ezali pene na yango ekopesa lisusu pole na yango te : moyi ekokoma molili tango tongo ekotana, mpe sanza ekopesa lisusu pole na yango te.
Boye, bapesaki sango na ndako ya Davidi : « Bato ya Siri basali boyokani elongo na bato ya Efrayimi. » Motema ya Akazi mpe mitema ya bato na ye nyonso eninganaki makasi ndenge kaka banzete ya zamba eninganaka na tango ya mopepe.
Ba-anjelu nde bazwi mokano wana ; basantu nde bakati yango mpo ete bato ya bomoi bayeba ete Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali Nkolo ya mokili ya bato, apesaka bokonzi na yango na moto nyonso oyo Ye alingi mpe azali na makoki ya kotombola kati na yango moto ya suka kati na bato. ›
Bandako na yo nyonso, oyo batonga makasi ezali lokola banzete ya figi etonda na bambuma ya liboso ekomela ; soki kaka bameki koningisa yango, bambuma ekweyaka kino na monoko ya moto ya lokoso.
Bilembo ekomonana kati na moyi, kati na sanza, mpe kati na minzoto ; bongo na mokili, bikolo ekotonda na somo mpe na kobanga likolo ya lokito makasi mpe ya bambonge ya ebale monene.
Anjelu ya mitano abetaki kelelo, mpe namonaki monzoto kokweya na mokili wuta na Lola. Fungola ya libulu ya monene mpe ya molili makasi epesamaki na monzoto yango.