Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 6:11 - Mokanda na Bomoi

11 Bongo bapesaki na moko na moko kati na bango nzambala ya pembe, mpe bayebisaki bango ete bazela moke kino motango ekokoka : motango ya baninga na bango ya mosala, mpe ya bandeko na bango oyo bakobomama lokola bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 6:11
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpo na yo, yika mpiko kino na suka ; okopema mpe, na mokolo ya suka, okosekwa mpo na kozwa litomba na yo.


Ndeko akokaba ndeko na ye mpo ete baboma ye, tata akokaba mwana na ye, bana bakotombokela baboti na bango mpe bakobomisa bango.


Kasi tata alobaki na basali na ye : « Bomema na lombangu nzambala oyo eleki kitoko mpe bolatisa ye yango ; bolatisa ye lopete, na mosapi, mpe basandale, na makolo na ye.


Pamba te bakobengana bino na bandako ya mayangani ; mpe tango elingi kutu kokoka, tango oyo moto nyonso oyo akoboma bino akokanisa ete, wana azali kosala bongo, azali kobonzela Nzambe mbeka.


Nzokande, nazali komona bomoi na ngai lokola eloko pamba ; eloko oyo eleki motuya mpo na ngai ezali : kosukisa malamu momekano na ngai ya kopota mbangu mpe kokokisa lotomo oyo Nkolo Yesu apesaki ngai : kosakola Sango Malamu ya ngolu ya Nzambe.


mpe akopesa bopemi epai na biso mpe epai na bino oyo bozali komona pasi, tango Nkolo Yesu akomimonisa wuta na Likolo, elongo na ba-anjelu na Ye ya nguya,


Nabundi etumba na ngai malamu, nakomi na suka ya lisano na ngai ya kokima mbangu, nabateli kondima.


Nzambe asalaki mabongisi ya kitoko penza mpo na biso, pamba te alingaki ete bakoma bato ya kokoka nzela moko na biso.


pene ya lisanga ya bana liboso ya Nzambe, ba-oyo bakombo na bango ekomama kati na Likolo ; pene ya Nzambe, Mosambisi ya bato nyonso ; pene ya milimo ya bato ya sembo oyo Nzambe akomisaki bato ya kokoka ;


Pamba te moto oyo akoti kati na bopemi ya Nzambe apemi na misala na ye, ndenge kaka Nzambe apemaki na misala na Ye.


mpe alapaki ndayi na Kombo ya Ye oyo azali na bomoi seko na seko, Ye oyo akela Lola mpe nyonso oyo ezali kati na yango, mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango : « Kobanda sik’oyo, tango ya kozela ezali lisusu te !


Epesamelaki kutu makoki ya kopesa pema ya bomoi epai ya ekeko ya nyama ya liboso, mpo ete ekoka koloba mpe kobomisa bato nyonso oyo bakogumbamela yango te.


Bongo nayokaki mongongo moko kowuta na Lola mpe koloba na ngai : — Koma : « Kobanda sik’oyo, esengo na bato oyo bakufaka na lisanga na Nkolo ! » Mpe Molimo alobaki : — Iyo, pasi na bango esilaka mpe bazwaka bopemi, pamba te misala na bango elandaka bango.


Namonaki ete mwasi yango alangwaki makila ya basantu mpe ya batatoli ya Yesu. Tango kaka namonaki ye, namitungisaki mingi.


Nazongiselaki ye : — Nkolo na ngai, yo nde oyebi. Bongo alobaki na ngai : — Ezali ba-oyo bawuti na minyoko makasi. Basukolaki banzambala na bango mpe bakomisaki yango pembe kati na makila ya Mpate.


Sima na makambo wana, namonaki ebele ya bato oyo moto ata moko te akokaki kotanga ; bazalaki bato ya bikolo nyonso, ya mabota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya nkota nyonso. Batelemaki liboso ya Kiti ya Bokonzi mpe liboso ya Mpate, balataki banzambala ya pembe mpe basimbaki mandalala na maboko na bango ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ