Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 6:1 - Mokanda na Bomoi

1 Bongo namonaki Mpate kobuka ekangelo ya liboso kati na bikangelo sambo ; mpe nayokaki moko kati na bikelamu minei ya bomoi koloba na mongongo makasi lokola kake : « Yaka ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 6:1
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokolo oyo elandaki, wana Yoane amonaki Yesu koya epai na ye, alobaki : — Tala Mpate ya Nzambe, oyo alongolaka lisumu ya mokili.


Pamba te biso, tokokoka te kotika koloba makambo oyo tomonaki mpe toyokaki !


Bongo Tempelo ya Nzambe, oyo ezali kati na Lola efungwamaki, mpe Sanduku ya Boyokani na Ye emonanaki kuna kati na Tempelo ya Nzambe. Mpe mikalikali epelaki, mingongo mpe lokito ya bakake eyokanaki, mabele eninganaki, mpe mvula monene ya mabanga enokaki.


Bavandi nyonso ya mokili bakogumbamela nyama yango, ba-oyo nyonso bakombo na bango ekomama te, wuta na ebandeli ya mokili, kati na buku ya bomoi ya Mpate oyo babomaki.


Nayokaki mongongo moko kowuta na Lola, ezalaki koyokana lokola makelele ya bibale minene mpe lokola lokito ya kake. Ezalaki lokola lokito ya babeti mandanda oyo bazali kobeta mandanda na bango


Bongo nayokaki makelele moko lokola makelele ya bato ebele, lokola makelele ya bibale minene, mpe lokola lokito ya kake makasi ; ezalaki koganga : « Aleluya ! Pamba te Yawe na biso, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, atalisi bokonzi na Ye.


Moko na moko kati na bikelamu nyonso minei azalaki na mapapu motoba, mpe nzoto na ye ezalaki etonda na miso, ezala na se ya mapapu. Butu mpe moyi, bazalaki kolemba te koloba : Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, oyo azalaki, azali, mpe azali koya, azali Bule, Bule, Bule.


Bongo namonaki, na loboko ya mobali ya Ye oyo avandaki na Kiti ya Bokonzi, buku moko elingama, bakoma yango na kati mpe na libanda, mpe bakanga yango na bikangelo sambo.


mpe bazalaki koloba na mongongo makasi : « Mpate oyo babomaki abongi na kozwa nguya, bomengo, bwanya mpe makasi, lokumu, nkembo mpe masanzoli. »


Tango kaka azwaki buku, bikelamu minei ya bomoi mpe bampaka tuku mibale na minei bagumbamaki liboso ya Mpate. Moko na moko kati na bango asimbaki na loboko na ye lindanda mpe kopo ya wolo etonda na ansa oyo ezali mabondeli ya basantu.


Tango Mpate abukaki ekangelo ya mibale, nayokaki ekelamu ya mibale ya bomoi koloba : « Yaka ! »


Tango Mpate abukaki ekangelo ya misato, nayokaki ekelamu ya bomoi ya misato koloba : « Yaka ! » Mpe namonaki liboso na ngai mpunda moko ya mwindo. Motambolisi na yango asimbaki na loboko na ye emekelo kilo.


Tango Mpate abukaki ekangelo ya minei, nayokaki mongongo ya ekelamu ya minei ya bomoi koloba : « Yaka ! »


Tango Mpate afungolaki ekangelo ya sambo, kimia moko ekotaki kati na Lola mpe esalaki minite pene tuku misato.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ