Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 5:6 - Mokanda na Bomoi

6 Mpe namonaki Mpate moko ya kotelema na kati-kati ya Kiti ya Bokonzi, mpe bazingela na bikelamu minei ya bomoi elongo na bampaka. Mpate yango amonanaki lokola nde basilaki koboma Ye ; azalaki na maseke sambo mpe miso sambo oyo ezali milimo sambo ya Nzambe, oyo etindama na mokili mobimba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 5:6
35 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te Yawe atalaka mokili mobimba mpo na kosunga bato oyo mitema na bango emipesa mobimba epai na Ye. Nzokande, na likambo oyo, osali lokola moto oyo azangi mayele. Mpo na yango, kobanda lelo, okozalaka na bitumba tango nyonso.


Bapesaki Ye bokonzi, lokumu mpe nguya ; bikolo nyonso, mikili mpe nkota bakomaki kosalela Ye. Bokonzi na Ye ezali ya seko na seko, ekotikala koleka te mpe ekotikala kobebisama te.


Natombolaki miso na ngai na likolo mpe namonaki, liboso na ngai, meme moko ya mobali etelemi pembeni ya moluka ; ezalaki na maseke mibale ya milayi makasi, kasi moko kati na maseke yango, oyo ebotaki sima, elekaki mosusu na molayi.


Oh Siona, mboka kitoko, telema mpe tuta ble, pamba te nakopesa yo maseke ya bibende mpe basapato ya bronze, bongo okobuka bikolo ebele mike-mike mpe okopesa bomengo na bango, oyo bazwaki na nzela ya mabe, lokola likabo epai na Yawe, mpe bozwi na bango epai na Mokonzi ya mokili mobimba.


Azalaki kongenga lokola moyi, mpe pole makasi ezalaki kobimela na loboko na Ye, epai wapi nguya na Ye ebombamaka.


Tala, natie libanga liboso ya Jozue. Libanga yango ezali na miso sambo, nakokoma makomi na likolo na yango, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « mpe nakolongola masumu ya mokili oyo na mokolo moko.


Nani atiolaki makambo mike ya ebandeli ? Bato bakotonda na esengo tango bakomona, na maboko ya Zorobabeli, singa oyo bamekelaka molayi. Biloko wana sambo ezali nde miso ya Yawe oyo etalaka mokili mobimba.


Amemaki lisusu : mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,


Amemaki lisusu : mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,


abimiseli biso Mobikisi ya nguya, kati na libota ya Davidi, mosali na Ye ;


Mokolo oyo elandaki, wana Yoane amonaki Yesu koya epai na ye, alobaki : — Tala Mpate ya Nzambe, oyo alongolaka lisumu ya mokili.


amonaki Yesu koleka mpe alobaki : « Botala Mpate ya Nzambe ! »


Tala eteni ya Makomi oyo azalaki kotanga : « Lokola mpate oyo bazali komema na esika oyo babomelaka banyama, lokola meme liboso ya moto oyo azali kolongola yango bapwale, afungolaki monoko na ye te.


Yoane ; Epai ya Mangomba sambo kati na etuka ya Azia : Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino, kowuta na Ye oyo azali, azalaki mpe azali koya, kowuta na milimo sambo oyo bazalaka liboso ya Kiti na Ye ya Bokonzi,


Kasi bango balongi ye na nzela ya makila ya Mpate, mpe na nzela ya liloba ya litatoli na bango ; balingaki te bomoi na bango kino kondima ata kokufa.


Bavandi nyonso ya mokili bakogumbamela nyama yango, ba-oyo nyonso bakombo na bango ekomama te, wuta na ebandeli ya mokili, kati na buku ya bomoi ya Mpate oyo babomaki.


Bongo namonaki Mpate atelemi na ngomba Siona elongo na bato nkoto nkama moko na tuku minei na minei. Kombo ya Mpate mpe ya Tata na Ye ezalaki ya kokomama na bambunzu ya bato yango.


Bakobundisa Mpate, kasi Mpate akolonga bango mpo ete azali Nkolo ya bankolo mpe Mokonzi ya bakonzi. Elongo na Ye, babengami, baponami mpe ba-oyo bazali sembo bakolonga mpe lokola. »


Namonaki ata tempelo moko te kati na engumba, pamba te Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso mpe Mpate nde bazali Tempelo na yango.


Engumba yango ezali na posa te ya moyi to ya sanza mpo na kongengisa yango, pamba te engengisamaka na nkembo ya Nzambe ; bongo Mpate azali mwinda na yango.


Bongo anjelu alakisaki ngai ebale ya mayi ya bomoi ; ezalaki kongenga lokola talatala mpe ezalaki kobima wuta na Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe ya Mpate.


Elakeli mabe ekozala lisusu te. Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe ya Mpate ekozala kati na engumba, mpe bawumbu na Ye bakosalela Ye.


Moko na moko kati na bikelamu nyonso minei azalaki na mapapu motoba, mpe nzoto na ye ezalaki etonda na miso, ezala na se ya mapapu. Butu mpe moyi, bazalaki kolemba te koloba : Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, oyo azalaki, azali, mpe azali koya, azali Bule, Bule, Bule.


Bongo natalaki mpe nayokaki mongongo ya ba-anjelu ebele, oyo motango na bango ezalaki bankoto na bankoto ; bazingelaki Kiti ya Bokonzi, bikelamu ya bomoi mpe bampaka,


mpe bazalaki koloba na mongongo makasi : « Mpate oyo babomaki abongi na kozwa nguya, bomengo, bwanya mpe makasi, lokumu, nkembo mpe masanzoli. »


Bongo nayokaki bikelamu nyonso oyo ezalaka kati na Lola, na mabele, na se ya mabele mpe na likolo ya ebale monene ; bango nyonso bazalaki koloba : « Tika ete masanzoli mpe lokumu, nkembo mpe nguya ezonga epai ya Mpate mpe epai na Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi mpo na libela na libela ! »


Bikelamu minei ya bomoi bazalaki kozongisa : « Amen. » Mpe bampaka bafukamaki mpe bagumbamelaki.


Bazalaki koganga epai ya bangomba mpe epai ya mabanga minene : « Bokweyela biso mpe bobomba biso mpo ete Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi amona biso te, mpe mpo ete kanda ya Mpate ekweyela biso te !


Bato oyo batiaka tembe na Yawe bakopanzana, pamba te akokweyisela bango kake wuta na likolo. Yawe akosambisa mokili mobimba, akopesa mokonzi na yango nguya mpe akobakisa makasi ya mopakolami na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ