Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 5:14 - Mokanda na Bomoi

14 Bikelamu minei ya bomoi bazalaki kozongisa : « Amen. » Mpe bampaka bafukamaki mpe bagumbamelaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 5:14
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki ozali kozongisa matondi epai ya Nzambe kati na molimo na yo, ndenge nini ba-oyo bazali koyoka te bakoki koloba « Amen ! » na losambo na yo ya kozongisa matondi epai ya Nzambe ? Pamba te bayebi te makambo oyo ozali koloba.


Bampaka tuku mibale na minei mpe bikelamu minei ya bomoi bafukamaki mpe bagumbamelaki Nzambe oyo avandaka na Kiti ya Bokonzi, mpe bagangaki : « Amen ! Aleluya ! »


Zingazinga ya Kiti yango ya Bokonzi, ezalaki mpe na bakiti mosusu tuku mibale na minei ya bokonzi, mpe bampaka tuku mibale na minei bavandelaki yango. Bampaka yango balataki bilamba ya pembe, mpe bazalaki na mitole ya wolo na mito na bango.


Na liboso ya Kiti yango ya Bokonzi, ezalaki lisusu na etando moko oyo ezalaki lokola talatala, mpe monene na yango ezalaki lokola molayi ya ebale monene. Ezalaki kongala lokola libanga ya talo oyo babengaka krisitali. Na kati mpe na zingazinga ya Kiti yango ya Bokonzi, ezalaki na bikelamu minei ya bomoi oyo banzoto na bango ezalaki etonda na miso na liboso mpe na sima.


Bongo natalaki mpe nayokaki mongongo ya ba-anjelu ebele, oyo motango na bango ezalaki bankoto na bankoto ; bazingelaki Kiti ya Bokonzi, bikelamu ya bomoi mpe bampaka,


Mpe namonaki Mpate moko ya kotelema na kati-kati ya Kiti ya Bokonzi, mpe bazingela na bikelamu minei ya bomoi elongo na bampaka. Mpate yango amonanaki lokola nde basilaki koboma Ye ; azalaki na maseke sambo mpe miso sambo oyo ezali milimo sambo ya Nzambe, oyo etindama na mokili mobimba.


Tango kaka azwaki buku, bikelamu minei ya bomoi mpe bampaka tuku mibale na minei bagumbamaki liboso ya Mpate. Moko na moko kati na bango asimbaki na loboko na ye lindanda mpe kopo ya wolo etonda na ansa oyo ezali mabondeli ya basantu.


na koloba : « Amen ! Tika ete masanzoli, nkembo, bwanya, matondi, lokumu, nguya mpe makasi ezala ya Nzambe na biso, mpo na libela na libela ! Amen ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ