Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 5:13 - Mokanda na Bomoi

13 Bongo nayokaki bikelamu nyonso oyo ezalaka kati na Lola, na mabele, na se ya mabele mpe na likolo ya ebale monene ; bango nyonso bazalaki koloba : « Tika ete masanzoli mpe lokumu, nkembo mpe nguya ezonga epai ya Mpate mpe epai na Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi mpo na libela na libela ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 5:13
29 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh Yawe, monene, nguya, kongenga, nkembo mpe bokonzi ezali ya Yo ; pamba te biloko nyonso oyo ezali na likolo mpe na se ezali ya Yo. Yawe, bokonzi ezali ya Yo, osalaka nyonso oyo olingi na ekelamu nyonso.


Bamoko bakotombola mingongo na bango mpe bakoganga na esengo ; wuta na weste ya mayi monene, bakobeta milolo mpo na lokumu na Yawe.


Boyemba loyembo ya sika mpo na Yawe, bokumisa Ye wuta na basuka ya mabele, bino bato oyo botambolaka na ebale monene, mpe nyonso oyo etondisaka yango, bino bisanga mpe bavandi na yango nyonso !


komema biso na komekama te, kasi kangola biso longwa na misala ya Satana ; [pamba te bokonzi, nguya mpe nkembo ezali ya Yo seko na seko.]  ›


« Nkembo na Nzambe kati na bisika oyo eleki likolo, mpe kimia na mabele kati na bato oyo alingaka ! »


Mokolo oyo elandaki, wana Yoane amonaki Yesu koya epai na ye, alobaki : — Tala Mpate ya Nzambe, oyo alongolaka lisumu ya mokili.


Pamba te biloko nyonso ewutaka epai na Ye, na nzela na Ye mpe mpo na Ye. Tika ete nkembo ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen !


na Nzambe moko kaka ya bwanya, tika ete nkembo epesamela libela na libela na nzela ya Yesu-Klisto ! Amen !


mpe bakoko. Ezali na nzela ya bakoko yango nde Klisto, oyo azali na likolo ya nyonso, ayaki na mokili lokola moto. Tika ete Nzambe apambolama libela na libela ! Amen !


tika ete nkembo ezala ya Ye kati na Lingomba mpe kati na Yesu-Klisto, mpo na bileko nyonso mpe mpo na libela na libela ! Amen.


mpo ete, na Kombo na Yesu, mabolongo nyonso efukama kati na Likolo, na mokili mpe na se ya mabele,


Kasi bosengeli penza kowumela, kotelema ngwi mpe kolenda kati na kondima na bino ; mpe bosengeli koboya kopengwa mosika ya elikya oyo bozwaki wuta tango boyokaki Sango Malamu. Sango Malamu yango esakolamaki kati na bikelamu nyonso oyo ezali na se ya Likolo, mpe ngai Polo nakoma mosali na yango.


Misenzela malamu, sala keba na mateya na yo, mpe tikala ngwi kati na yango. Soki osali bongo, okomibikisa mpe okobikisa bato oyo bakoyoka yo.


Tika ete moto oyo azali na likabo ya koloba asakola Liloba na Nzambe ; tika ete moto oyo azali na likabo ya kosunga bato asala yango na makasi oyo Nzambe apesi ye mpo ete, kati na makambo nyonso, Nzambe azwa lokumu na nzela ya Yesu-Klisto. Tika ete nkembo mpe nguya ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen !


Tika ete nguya ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen !


epai ya Nzambe moko kaka, Mobikisi na biso, na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, tika ete nkembo, lokumu, nguya mpe bokonzi ezala ya Ye, wuta liboso ya tango, sik’oyo mpe mpo na libela na libela ! Amen !


Ye oyo akomisaki biso ekolo ya bakonzi mpe ya Banganga-Nzambe mpo na kosalela Nzambe, Tata na Ye : Tika ete nkembo mpe nguya ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen !


Bavandi nyonso ya mokili bakogumbamela nyama yango, ba-oyo nyonso bakombo na bango ekomama te, wuta na ebandeli ya mokili, kati na buku ya bomoi ya Mpate oyo babomaki.


Bongo namonaki, na loboko ya mobali ya Ye oyo avandaki na Kiti ya Bokonzi, buku moko elingama, bakoma yango na kati mpe na libanda, mpe bakanga yango na bikangelo sambo.


mpe bazalaki koloba na mongongo makasi : « Mpate oyo babomaki abongi na kozwa nguya, bomengo, bwanya mpe makasi, lokumu, nkembo mpe masanzoli. »


Kasi ezala kati na Lola to na mokili to na se ya mabele, moko te akokaki kofungola buku to kotala kati na yango.


Mpe namonaki Mpate moko ya kotelema na kati-kati ya Kiti ya Bokonzi, mpe bazingela na bikelamu minei ya bomoi elongo na bampaka. Mpate yango amonanaki lokola nde basilaki koboma Ye ; azalaki na maseke sambo mpe miso sambo oyo ezali milimo sambo ya Nzambe, oyo etindama na mokili mobimba.


Mpe bayembaki nzembo ya sika : « Obongi na kozwa buku mpe kobuka bikangelo na yango, pamba te babomaki Yo ; bongo na nzela ya makila na Yo, osikolaki, mpo na Nzambe, bato ya bikolo nyonso, ya nkota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya mabota nyonso.


Bazalaki koganga epai ya bangomba mpe epai ya mabanga minene : « Bokweyela biso mpe bobomba biso mpo ete Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi amona biso te, mpe mpo ete kanda ya Mpate ekweyela biso te !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ