1 Bongo namonaki, na loboko ya mobali ya Ye oyo avandaki na Kiti ya Bokonzi, buku moko elingama, bakoma yango na kati mpe na libanda, mpe bakanga yango na bikangelo sambo.
Mpo na bino, emoniseli nyonso oyo ekomi lokola maloba ya buku oyo bakanga mpe bapesi epai ya moto oyo ayebi kotanga, bongo balobi na ye : « Nabondeli yo, tanga nanu buku oyo, » kasi azongisi : « Nakokoka te, pamba te buku ekangama. »
Boluka kati na buku ya Yawe mpe botanga : Moko te kati na bango akozanga, moko te akomitungisa mpo na moninga na ye ; pamba te monoko na Yawe nde epesi mitindo mpe Molimo na Ye akosangisa bango elongo.
Mpe Ye oyo avandaki na Kiti yango ya Bokonzi azalaki komonana lokola Jasipe mpe Saridwane oyo ezali mabanga ya talo. Monama ezingelaki Kiti yango ya Bokonzi, ezalaki kongenga lokola libanga ya talo oyo babengaka emerode.
Na tango nyonso oyo bikelamu ya bomoi bazalaki kopesa nkembo, lokumu mpe matondi epai na Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi mpe azali na bomoi seko na seko,
Bongo nayokaki bikelamu nyonso oyo ezalaka kati na Lola, na mabele, na se ya mabele mpe na likolo ya ebale monene ; bango nyonso bazalaki koloba : « Tika ete masanzoli mpe lokumu, nkembo mpe nguya ezonga epai ya Mpate mpe epai na Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi mpo na libela na libela ! »
Bongo namonaki Mpate kobuka ekangelo ya liboso kati na bikangelo sambo ; mpe nayokaki moko kati na bikelamu minei ya bomoi koloba na mongongo makasi lokola kake : « Yaka ! »
Bazalaki koganga epai ya bangomba mpe epai ya mabanga minene : « Bokweyela biso mpe bobomba biso mpo ete Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi amona biso te, mpe mpo ete kanda ya Mpate ekweyela biso te !