Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 4:8 - Mokanda na Bomoi

8 Moko na moko kati na bikelamu nyonso minei azalaki na mapapu motoba, mpe nzoto na ye ezalaki etonda na miso, ezala na se ya mapapu. Butu mpe moyi, bazalaki kolemba te koloba : Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, oyo azalaki, azali, mpe azali koya, azali Bule, Bule, Bule.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 4:8
42 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Abrami akokisaki mibu tuku libwa na libwa ya mbotama, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye : « Nazali Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. Tambola liboso na Ngai mpe zala moto azanga pamela.


Moto oyo awumelaka kati na ebombamelo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo avandaka na se ya bobatelami ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.


Oh Yawe, nani kati na banzambe azali lokola Yo ? Nani azali lokola Yo, kitoko makasi kati na bosantu, somo, mpe abongi na lokumu, mpe asalaka makambo ya kokamwa ?


Nzambe alobaki na Moyize : — Ngai nazali oyo akosala. Tala makambo oyo okoloba na bana ya Isalaele : « Nazali atindi ngai epai na bino. »


Bolela, pamba te mokolo na Yawe ekomi pene, ekoya lokola kobebisama oyo ewuti na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.


Mpo na likambo ya Siona, nakokanga monoko na Ngai te ; mpo na likambo ya Yelusalemi, nakovanda kimia te, kino bosembo na ye emonana lokola kongenga ya pole, mpe lobiko na ye emonana lokola mwinda.


Bajante ya bapine na yango ezalaki minene mpe somo : nyonso minei ezalaki etonda na miso zingazinga na yango.


Na kati-kati na yango, namonaki biloko moko lokola bikelamu minei ya bomoi oyo ezalaki na lolenge ya moto.


Moko na moko kati na yango ezalaki na bilongi minei mpe mapapu minei.


Nzoto mobimba ya moko na moko kati na bango, ezala mokongo to maboko to mpe mapapu na bango, ezalaki etonda na miso, ndenge bapine na bango minei ezalaki.


Mawa na mokolo wana ! Pamba te mokolo ya Yawe ekomi pene ; ekoya lokola libebi oyo ewuti epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.


Yango wana, bosenzela ! Bokanisa malamu ete mibu misato mobimba, butu mpe moyi, natikaki te kokebisa moko na moko na bino, mpe tango mosusu elongo na mpinzoli.


Mpe, « Nakozala Tata mpo na bino, mpe bino bokozala bana mibali mpe bana basi mpo na ngai, elobi Nkolo, Mokonzi ya mampinga. »


Bandeko na ngai, bokanisa ndenge nini tomonaki pasi mpe tosalaki mosala makasi ; butu mpe moyi, tozalaki kosala, pamba te toboyaki kozala mokumba epai ya moto ata moko kati na bino, wana toteyaki bino Sango Malamu ya Nzambe.


Misenzela malamu, sala keba na mateya na yo, mpe tikala ngwi kati na yango. Soki osali bongo, okomibikisa mpe okobikisa bato oyo bakoyoka yo.


teya Liloba, betela yango sete na tango ya malamu to te, zongisa na nzela, pamela mpe lendisa na nzela ya mateya na yo mpe na kokanga motema.


Yesu-Klisto azali ndenge moko : lobi oyo ewuti koleka, lelo, mpe libela na libela.


Yoane ; Epai ya Mangomba sambo kati na etuka ya Azia : Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino, kowuta na Ye oyo azali, azalaki mpe azali koya, kowuta na milimo sambo oyo bazalaka liboso ya Kiti na Ye ya Bokonzi,


« Nazali Alifa mpe Omega, » elobi Nkolo Nzambe, « Ye oyo azali, azalaki, mpe azali koya, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso. »


na koloba : « Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, Yo oyo ozali mpe ozalaki, tozali kopesa Yo matondi ; mpo ete osalelaki nguya monene na Yo mpe okomaki kokonza.


Molinga ya pasi na bango ekomata na likolo mpo na libela na libela. Butu mpe moyi, bopemi ekozala te mpo na bato oyo bagumbamelaka nyama mpe ekeko na yango, mpe mpo na moto nyonso oyo akondima kozwa elembo ya kombo na yango. »


mpe bazali koyemba nzembo ya sika liboso ya Kiti ya Bokonzi, ya bikelamu minei ya bomoi mpe ya bampaka. Moko te akokaki koyekola nzembo yango longola kaka bato nkoto nkama moko na tuku minei na minei oyo basikolamaki wuta na mokili.


Bazalaki koyemba nzembo ya Moyize, mowumbu ya Nzambe, mpe nzembo ya Mpate : Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, misala na Yo ezali minene mpe ya kokamwa ! Mokonzi ya bikolo nyonso, banzela na Yo ezali sembo mpe solo.


Moko kati na bikelamu minei ya bomoi apesaki na ba-anjelu sambo bakopo sambo oyo basala na wolo mpe etonda na kanda ya Nzambe oyo azali na bomoi seko na seko.


Ezali milimo ya kindoki oyo esalaka bikamwa. Ebimi mpo na kokende epai ya bakonzi ya mokili mobimba, mpo na kosangisa bango mpo na etumba ya mokolo monene ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.


Bongo nayokaki etumbelo koloba : « Iyo, Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, okataka makambo na ndenge ya solo mpe ya sembo ! »


Mopanga moko ya minu ezalaki kobima na monoko na Ye mpo na kobeta bikolo. Akokamba yango na lingenda ya ebende mpe akonika bambuma ya vino kati na ekamolelo ya vino ya kanda monene ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.


Bampaka tuku mibale na minei mpe bikelamu minei ya bomoi bafukamaki mpe bagumbamelaki Nzambe oyo avandaka na Kiti ya Bokonzi, mpe bagangaki : « Amen ! Aleluya ! »


Namonaki ata tempelo moko te kati na engumba, pamba te Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso mpe Mpate nde bazali Tempelo na yango.


Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Filadelfi : « Tala maloba ya Ye oyo azali Bule mpe Solo, oyo asimbi fungola ya Davidi : oyo Ye afungoli, moko te akoki kokanga yango ; mpe oyo Ye akangi, moko te akoki kofungola yango.


Zingazinga ya Kiti yango ya Bokonzi, ezalaki mpe na bakiti mosusu tuku mibale na minei ya bokonzi, mpe bampaka tuku mibale na minei bavandelaki yango. Bampaka yango balataki bilamba ya pembe, mpe bazalaki na mitole ya wolo na mito na bango.


Na liboso ya Kiti yango ya Bokonzi, ezalaki lisusu na etando moko oyo ezalaki lokola talatala, mpe monene na yango ezalaki lokola molayi ya ebale monene. Ezalaki kongala lokola libanga ya talo oyo babengaka krisitali. Na kati mpe na zingazinga ya Kiti yango ya Bokonzi, ezalaki na bikelamu minei ya bomoi oyo banzoto na bango ezalaki etonda na miso na liboso mpe na sima.


Na tango nyonso oyo bikelamu ya bomoi bazalaki kopesa nkembo, lokumu mpe matondi epai na Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi mpe azali na bomoi seko na seko,


Mpe namonaki Mpate moko ya kotelema na kati-kati ya Kiti ya Bokonzi, mpe bazingela na bikelamu minei ya bomoi elongo na bampaka. Mpate yango amonanaki lokola nde basilaki koboma Ye ; azalaki na maseke sambo mpe miso sambo oyo ezali milimo sambo ya Nzambe, oyo etindama na mokili mobimba.


Bongo namonaki Mpate kobuka ekangelo ya liboso kati na bikangelo sambo ; mpe nayokaki moko kati na bikelamu minei ya bomoi koloba na mongongo makasi lokola kake : « Yaka ! »


Bongo nayokaki lokola mongongo moko kobima kati na bikelamu minei ya bomoi ; ezalaki koloba : « Kopo moko ya ble mpo na mbongo moko ya ebende, mpe bakopo misato ya orje mpo na mbongo moko ya ebende. Kasi kobebisa mafuta mpe vino te. »


Ba-anjelu nyonso oyo bazalaki kotelema zingazinga ya Kiti ya Bokonzi, ya bampaka mpe ya bikelamu minei ya bomoi, bagumbamaki, bilongi kino na mabele, liboso ya Kiti ya Bokonzi, mpe bagumbamelaki Nzambe


Yango wana, batelemaka liboso ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe basalelaka Ye kati na Tempelo na Ye, butu mpe moyi ; mpe Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi akobatela bango kati na evandelo na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ