Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 4:5 - Mokanda na Bomoi

5 Wuta na Kiti yango ya Bokonzi, mikalikali ezalaki kongenga, makelele ya mingongo mpe lokito ya bakake ezalaki koyokana. Mpe liboso ya Kiti yango, minda sambo ezalaki kopela : ezali milimo sambo ya Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 4:5
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Alobaki na ye lisusu : — Nazali Yawe oyo nabimisaki yo wuta na Uri, mokili ya bato ya Chalide, mpo na kopesa yo mokili oyo.


bitelemiselo ya minda elongo na minda na yango, oyo basala na wolo ya peto, mpo na kopela liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule,


Bosakola ete nguya ezali ya Nzambe oyo nkembo na Ye ezali na Isalaele, mpe nguya na Ye ezali kati na mapata.


Na tongo ya mokolo ya misato, bakake ebetaki, mikalikali ezalaki kongenga, mpe lipata monene ezipaki ngomba ; bongo bato bayokaki bakelelo kobeta makasi. Bato nyonso kati na molako balengaki.


Tango bato bayokaki bakake mpe koganga ya kelelo, mpe bamonaki mikalikali mpe milinga kobima na ngomba, balengaki. Batelemaki mosika


Okosala minda sambo oyo okotia na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete epesa pole na etando oyo ezali na liboso ya etelemiselo.


Asalaki minda sambo ; mpe asalaki na wolo ya peto bisimbelo elongo na basani ya putulu.


Bikelamu yango ya bomoi ezalaki lokola makala ya moto to lokola koni oyo ezali kopela moto. Moto ezalaki kotambola-tambola kati na bikelamu yango, ezalaki kongenga mpe mikalikali ezalaki kobima kati na yango.


Atunaki ngai : — Ozali komona nini ? Nazongiselaki ye : — Nazali komona etelemiselo moko ya mwinda, basala na wolo mpe, na likolo na yango, ezali na kopo moko, minda sambo mpe batio sambo oyo elekisaka mafuta kino na minda.


Bokonzi ya Likolo ekozala lokola baseka zomi oyo bakamataki minda na bango mpe bakendeki kokutana na mobali ya libala.


Ngai nazali kobatisa bino na mayi mpo na kolakisa ete bobongoli mitema. Kasi sima na ngai, Moto moko azali koya, aleki ngai na nguya ; ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye ; ezali Ye nde akobatisa bino kati na Molimo Mosantu mpe kati na moto.


Bamonaki biloko moko lokola ndemo ya moto kokabwana mpe kovanda na moto ya moko na moko kati na bango.


Yoane ; Epai ya Mangomba sambo kati na etuka ya Azia : Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino, kowuta na Ye oyo azali, azalaki mpe azali koya, kowuta na milimo sambo oyo bazalaka liboso ya Kiti na Ye ya Bokonzi,


bongo agangaki makasi lokola nkosi. Tango agangaki, bakake sambo ebetaki.


Bongo Tempelo ya Nzambe, oyo ezali kati na Lola efungwamaki, mpe Sanduku ya Boyokani na Ye emonanaki kuna kati na Tempelo ya Nzambe. Mpe mikalikali epelaki, mingongo mpe lokito ya bakake eyokanaki, mabele eninganaki, mpe mvula monene ya mabanga enokaki.


Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Sarde : « Tala maloba ya Ye oyo azali na milimo sambo ya Nzambe mpe minzoto sambo : Nayebi misala na yo ; nayebi malamu ete okenda sango ete ozali na bomoi, nzokande ozali na yo ya kokufa.


Mpe namonaki Mpate moko ya kotelema na kati-kati ya Kiti ya Bokonzi, mpe bazingela na bikelamu minei ya bomoi elongo na bampaka. Mpate yango amonanaki lokola nde basilaki koboma Ye ; azalaki na maseke sambo mpe miso sambo oyo ezali milimo sambo ya Nzambe, oyo etindama na mokili mobimba.


Bongo anjelu azwaki mbabola, atondisaki yango na makala ya moto oyo azwaki na etumbelo, mpe abwakaki mbabola yango na mabele. Mbala moko, lokito moko ya makasi eyokanaki : bakake, mingongo, mikalikali mpe koningana ya mabele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ