Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 4:3 - Mokanda na Bomoi

3 Mpe Ye oyo avandaki na Kiti yango ya Bokonzi azalaki komonana lokola Jasipe mpe Saridwane oyo ezali mabanga ya talo. Monama ezingelaki Kiti yango ya Bokonzi, ezalaki kongenga lokola libanga ya talo oyo babengaka emerode.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 4:3
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

epai wapi bamonaki Nzambe ya Isalaele ; se ya matambe na Ye ezalaki lokola mabanga ya talo ya safiri mpe ezalaki na langi ya ble ya kitoko lokola ble ya likolo.


na molongo ya mibale, okotia libanga ya ribisi, ya safiri mpe ya diama ;


Na molongo ya mibale, libanga ya ribisi, ya safiri mpe ya diama.


Na mobu oyo mokonzi Oziasi akufaki, namonaki Yawe avandi na Kiti moko ya bokonzi, etombwama makasi, bongo basonge ya nzambala na Ye etondisaki Tempelo.


Boye, na likolo ya mapata oyo ezalaki na likolo ya mito na yango, ezalaki na eloko moko lokola libanga ya talo ya langi ya bule mpe lokola kiti ya bokonzi basala na safiri ; mpe na likolo ya kiti ya bokonzi yango, ezalaki na elilingi moko oyo ezalaki lokola moto.


Kongenga oyo ezingelaki yango ezalaki lokola monama na mapata na mokolo ya mvula ; elilingi yango ezalaki lokola nkembo na Yawe. Tango namonaki yango, nakweyaki, elongi na ngai kino na mabele, mpe nayokaki mongongo ya moto moko koloba na ngai.


Tango natalaki, namonaki na mapata, na likolo ya mito ya basheribe, eloko moko lokola libanga ya talo oyo babengaka safiri ; mpe na likolo ya libanga yango, eloko moko ezalaki komonana lokola kiti ya bokonzi.


Ozalaki kati na Edeni, elanga ya Nzambe ; mabanga ya talo ya lolenge nyonso ezalaki kokomisa yo kitoko : ribi, topaze, diama, emerode, krizolite, onikisi, jasipe, safiri ; bambunda na yo ya mike mpe baflite na yo ezalaki ya wolo, babongisaki yango mpo na mokolo oyo bakela yo.


Bongo namonaki anjelu mosusu ya nguya makasi kokita wuta na Lola ; lipata moko ezipaki ye mpe monama ezingelaki moto na ye. Elongi na ye ezali kongenga lokola moyi, mpe makolo na ye ezalaki lokola makonzi ya moto.


Ezalaki kongenga na nkembo ya Nzambe, mpe kongenga na yango ezalaki lokola kongenga ya libanga ya talo makasi, lokola jasipe oyo emonisaka lokola krisitali.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ