Emoniseli 4:11 - Mokanda na Bomoi11 « Nkolo mpe Nzambe na biso, obongi na nkembo, na lokumu mpe na nguya, pamba te Yo nde okela biloko nyonso : ezalaki mpe ekelamaki mpo na mokano na Yo. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Botombola miso na bino mpe botala na likolo : Nani akela biloko nyonso ya likolo : moyi, sanza, minzoto mpe biloko mosusu ? Ezali Ye oyo abimisaka mampinga nyonso ya minzoto mpe abengaka yango moko na moko na kombo na yango. Mpo na bokonzi monene mpe nguya makasi na Ye, moko te kati na yango ezangaka.