Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 3:9 - Mokanda na Bomoi

9 Tala makambo oyo nakosala bato ya ndako ya mayangani ya Satana, oyo balobaka ete bazali Bayuda, nzokande bazali na bango Bayuda te ; bazali nde bakosi. Nakosala ete baya kofukama na makolo na yo mpe bandima ete nalingaka yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 3:9
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kati na bituka nyonso, bingumba nyonso mpe bisika nyonso oyo bazwaki sango ya mobeko ya mokonzi, ezalaki tango ya esengo, ya kosepela, ya kolia mpe ya feti kati na Bayuda. Bato ebele ya bikolo mosusu, oyo bazalaki elongo na bango kati na mboka bamikomisaki Bayuda ; pamba te somo ya Bayuda elongaki makanisi na bango.


Boye, bakalaka na yo nyonso oyo bazali zingazinga na yo bakoya epai na ngai, bakofukama liboso na ngai mpe bakoloba : ‹ Kende, yo mpe bato nyonso oyo bazali kotambola sima na yo. › Mpe sima na yango, nakobima. » Bongo Moyize abimaki na ndako ya Faraon na kanda makasi.


Lokola ozali na motuya mpe na kilo mingi na miso na Ngai, lokola nalingaka yo, nakokaba bato mosusu na esika na yo, mpe bikolo mpo na kosomba bomoi na yo.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Mosala ya Ejipito, mombongo ya Kushi mpe bato milayi ya Seba, bakoleka epai na yo mpe bakozala ya yo. Bakotambola ya kokangama na minyololo, sima na yo ; bakofukama liboso na yo mpe bakobondela yo na maloba oyo : ‹ Solo, Nzambe azali penza epai na yo, nzambe mosusu azali te ! › »


Bakonzi bakozala batata babokoli na yo, mpe basi na bango, basungi na yo ; bakofukama liboso na yo na bilongi etala na mabele, bakolembola putulu ya makolo na yo. Boye, okoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe ; ete bato oyo batielaka Ngai motema bayokisamaka soni te. »


Bana ya banyokoli na yo bakoya kofukama liboso na yo ; bato nyonso oyo batiolaki yo bakofukama na se ya matambe na yo mpe bakobenga yo Engumba ya Yawe, Siona ya Mosantu ya Isalaele.


Ngai kati na bango, mpe Yo kati na Ngai. Ezali kaka na nzela wana nde bakokoka kozala penza moko, mpo ete mokili eyeba penza ete Yo nde otindaki Ngai, mpe ete olingaka bango ndenge olingaka Ngai.


Nayebi minyoko mpe bobola na yo, nzokande ozali mozwi ; nayebi ndenge nini bato oyo balobaka ete bazali Bayuda, kasi bazali na bango Bayuda te, batiolaka yo ; bazali nde ndako ya mayangani ya Satana.


Bongo moto nyonso oyo akotikala kati na libota na yo akobanda koya kofukama liboso na ye mpo na kozwa mbongo moko ya palata mpe eteni ya lipa, mpe akoloba : ‘ Kotisa ngai ata na mosala moko kati na misala ya bonganga-Nzambe mpo ete nazwaka ata eteni ya lipa. ’ › »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ