17 Olobaka : « Nazali mozwi ! Nakomi na bozwi ebele mpe nazali na posa ya eloko te. » Kasi ozali koyeba te ete ozali moto ya pasi mpe ya mawa, ozali nde mobola, mokufi miso mpe ozali bolumbu.
Ezali na moto moko oyo asalaka makambo lokola mozwi, nzokande azali na ye ata na eloko moko te ; mpe ezali na moto mosusu oyo asalaka makambo lokola mobola, nzokande azali na bozwi mingi.
pamba te soki natondi makasi, nakoki kowangana Yo mpe koloba : « Yawe nde nani ? » To soki nazali na bobola, nakoki koyiba mpe koyokisa Kombo ya Nzambe na ngai soni.
Bino bato ya tango oyo, boyoka Liloba na Yawe : Boni, nazali lokola esobe to mokili ya molili makasi mpo na mokili ya Isalaele ? Mpo na nini bato na Ngai bazali koloba : ‹ Tozali na bonsomi ya kokende epai tolingi mpe tokoya lisusu epai na yo te ? ›
Kasi lokola Yesu ayokaki Bafarizeo koloba bongo, alobaki na bango : — Bato oyo bazali kolongono na nzoto bazalaka na posa ya monganga te ; ezali babeli nde bazalaka na posa na ye.
Bandeko, nalingi ete boyeba mabombami oyo mpo ete bomimona te ete boleki na bwanya : ndambo ya bana ya Isalaele bakowumela kozala mitema libanga kino Bapagano nyonso bakokota na libota ya Nzambe.
Pamba te na ngolu oyo epesameli ngai, nazali koloba na bino nyonso : bomikanisaka te koleka makoki na bino, kasi bomikanisaka na lolenge ya mayele, kolanda kondima oyo Nzambe apesi na moko na moko kati na bino.
Tala, nazali koya lokola moyibi ! Esengo na moto oyo azali kosenzela mpe kobatela bilamba na ye, mpo ete atambola motakala te, mpe bolumbu na ye emonana te na miso ya bato nyonso.