Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 3:14 - Mokanda na Bomoi

14 Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Laodise : Tala maloba ya Amen, Motatoli ya sembo mpe ya solo, Mokonzi ya bikelamu nyonso ya Nzambe :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 3:14
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Ribeni, ozali mwana na ngai ya liboso, makasi na ngai, elembo ya liboso ya makasi na ngai ; oleki na lokumu mpe na nguya.


Motatoli ya sembo akosaka te, kasi motatoli ya mabe alobaka lokuta.


Yawe asalaki ngai liboso ete asala nyonso, liboso ya misala na Ye nyonso ya kala ;


Tala, nakomisaki ye motatoli na Ngai na miso ya bato ya bikolo ebele, mokambi mpe motambolisi ya bato.


Moto nyonso oyo akobelela lipamboli kati na mokili akosala bongo na Kombo ya Nzambe ya solo, mpe moto oyo akolapa ndayi kati na mokili, akolapa yango na Kombo ya Nzambe ya solo. Pamba te pasi ya kala ekomonana lisusu te, ekobombama na miso na Ngai.


Balobaki na Jeremi : — Tika ete Yawe azala motatoli ya solo mpe ya sembo mpo na kopesa biso etumbu soki toboyi kotosa makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo mokumba ya koyebisa biso.


Nzambe akelaki biloko nyonso na nzela na Ye ; ezali na eloko moko te oyo ekelama soki na nzela na Ye te.


Yesu azongiselaki bango : — Ezala soki natatoli mpo na Ngai moko, litatoli na Ngai ezali ya solo, pamba te nayebi epai nawuti mpe epai nazali kokende ; kasi bino, boyebi te ezala epai nawuti to epai nazali kokende.


Pamba te bilaka nyonso ya Nzambe ezalaka « iyo » kati na Klisto ; mpe ezali na nzela na Ye Klisto nde tolobaka « amen » mpo na nkembo ya Nzambe.


Kasi akozwa mwana mobali ya mwasi oyo ye alingaka mingi te lokola mwana ya liboso mpe akopesa ye biteni mibale ya biloko nyonso oyo azali na yango. Mwana mobali wana azali elembo ya liboso ya bokasi ya tata na ye, boye asengeli kozwa makoki nyonso oyo ebongi na mwana ya liboso.


Klisto azali elilingi ya Nzambe oyo amonanaka te, azala liboso ya bikelamu nyonso,


azali moto ya nzoto na Ye, oyo ezali Lingomba ; azali ebandeli, Mosekwi ya liboso kati na bakufi, mpo ete azala na bokonzi ya liboso kati na nyonso,


Nalingi boyeba ete nazali kobunda etumba makasi mpo na bino, mpo na bandeko ya Laodise mpe mpo na bandeko nyonso oyo bamoni ngai nanu te.


Soki bosilisi kotanga mokanda oyo, bosala ete etangama mpe kati na Lingomba ya Laodise ; bongo bino mpe botanga oyo ekowuta na Laodise.


koloba : « Koma na buku makambo oyo ozali komona, mpe tinda yango na Mangomba sambo oyo : Efeso, Simirne, Pergame, Tiyatire, Sarde, Filadelfi mpe Laodise. »


mpe kowuta na Yesu-Klisto, Motatoli oyo akosaka te, Mosekwi ya liboso kati na bakufi, mpe Mokonzi ya bakonzi ya mokili ! Epai na Ye oyo alingaka biso mpe akangolaki biso na masumu na biso na nzela ya makila na Ye,


Bongo namonaki Lola efungwami, mpe mpunda moko ya pembe ezalaki liboso na ngai. Kombo ya motambolisi ya mpunda yango ezali : « Sembo mpe Solo. » Akataka makambo mpe abundaka bitumba na bosembo.


Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Efeso : « Tala maloba ya Ye oyo asimbi minzoto sambo na loboko na Ye ya mobali mpe atambolaka kati na bitelemiselo sambo ya minda, oyo basala na wolo :


Alobaki na ngai lisusu : « Ekokisami. Nazali Alifa mpe Omega, Ebandeli mpe Suka. Na moto oyo azali na posa ya mayi, nakopesa mayi ya ofele wuta na etima ya mayi ya bomoi.


Nazali Alifa mpe Omega, Moto ya liboso mpe Moto ya suka, Ebandeli mpe Suka.


Anjelu alobaki na ngai : « Maloba oyo ezali ya solo mpe ebongi na kotiela yango motema. Nkolo, Nzambe ya milimo ya basakoli, atindaki anjelu na Ye mpo na kolakisa na basali na Ye makambo oyo esengeli kosalema kala mingi te. »


Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Filadelfi : « Tala maloba ya Ye oyo azali Bule mpe Solo, oyo asimbi fungola ya Davidi : oyo Ye afungoli, moko te akoki kokanga yango ; mpe oyo Ye akangi, moko te akoki kofungola yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ