Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 22:7 - Mokanda na Bomoi

7 Yoka ! Nazali koya kala mingi te. Esengo na moto oyo abatelaka maloba ya masakoli oyo ekomama kati na buku oyo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 22:7
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

koloba : « Koma na buku makambo oyo ozali komona, mpe tinda yango na Mangomba sambo oyo : Efeso, Simirne, Pergame, Tiyatire, Sarde, Filadelfi mpe Laodise. »


Esengo na moto oyo atangaka maloba ya lisakoli oyo, mpe esengo na bato oyo bayokaka maloba yango mpe babatelaka makambo oyo ekomama kati na yango, pamba te tango ekomi pene.


Tala, nazali koya lokola moyibi ! Esengo na moto oyo azali kosenzela mpe kobatela bilamba na ye, mpo ete atambola motakala te, mpe bolumbu na ye emonana te na miso ya bato nyonso.


Boye, bongola motema na yo ! Soki te, nakoya kala mingi te epai na yo mpe nakobundisa bango na mopanga ya monoko na Ngai.


Yoka ! Nazali koya kala mingi te ! Nakomema elongo na Ngai lifuti mpo na moto na moto kolanda misala na ye.


Ngai Yoane, nazali koyebisa moto nyonso oyo azali koyoka maloba ya masakoli ya buku oyo : soki moto abakisi ata likambo moko na likolo ya makambo oyo, Nzambe akobakisela ye bitumbu oyo ekomami kati na buku oyo ;


mpe soki moto alongoli ata likambo moko na maloba ya masakoli ya buku oyo, Nzambe mpe akolongola ye ndingisa ya kolia bambuma ya nzete ya bomoi mpe ya kokota kati na Engumba ya Bule, oyo etalisami kati na buku oyo.


Motatoli ya makambo oyo alobi : — Iyo, nazali koya kala mingi te. Amen : Nkolo Yesu, yaka !


Tika ete ngolu ya Nkolo Yesu ezala na bino nyonso !


Nazali koya kala mingi te. Oyo ozali na yango, simba yango makasi mpo ete moko te abotola yo motole na yo.


Yango wana, kanisa malamu mateya oyo ozwaki mpe oyokaki ; tosa mpe bongola motema na yo. Kasi soki olamuki te, nakoya lokola moyibi, mpe okoyeba te ngonga oyo nakoya epai na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ