Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 22:4 - Mokanda na Bomoi

4 Bakomona elongi na Ye, mpe Kombo na Ye ekokomama na bambunzu na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 22:4
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Akosambela Nzambe, akozwa ngolu na miso na Ye, akomona Nzambe na miso mpe akoganga na esengo. Nzambe akozwa ye lisusu lokola moto ya sembo.


Mpo na ngai, sima na ngai kolonga, nakotala elongi na Yo ; sima na ngai kolamuka, nakosepela na komona Yo !


Bobonzaka bambeka kolanda mibeko mpe botiaka elikya na bino kati na Yawe.


Ndenge mbuli eyokaka posa ya komela mayi, ndenge wana mpe molimo na ngai ezali na posa na Yo, Nzambe.


Miso na yo ekomona Mokonzi na kitoko na Ye nyonso mpe ekomona ndenge mokili ekenda kino na mosika.


Ekobota fololo mingi penza mpe ekosepela, ekosepela mpe ekoganga na esengo. Nkembo ya Libani, lokumu ya Karimeli mpe ya Saroni ekopesamela yango ; boye bakomona nkembo ya Yawe, lokumu ya Nzambe na biso.


Bongo, nkembo na Yawe ekomonisama, mpe bato nyonso bakomona yango elongo ; » pamba te Yawe nde alobi.


Esengo na bato oyo bazali na mitema peto, pamba te bakomona Nzambe !


Tika ete moto oyo alingi kosalela Ngai alanda Ngai ! Epai Ngai nakozala, mosali na Ngai mpe akozala wana. Tata na Ngai akokumisa moto oyo asalelaka Ngai.


Tata, nalingi ete bato oyo opesaki Ngai bazala elongo na Ngai kuna epai nazali kokende, mpo ete bamona nkembo na Ngai, nkembo oyo opesaki Ngai, pamba te olingaki Ngai liboso ete okela mokili.


Solo, sik’oyo, tozali komona kaka elilingi, lokola kati na talatala ; kasi mokolo ezali, mokolo oyo tokomona penza ndenge esengeli. Sik’oyo nayebi kaka moke ; kasi mokolo ezali, mokolo oyo nakoyeba penza nyonso, ndenge Nzambe ayebi ngai.


Bolukaka kovanda na kimia elongo na bato nyonso mpe kotambola na bomoi ya bosantu, pamba te moko te akomona Nkolo soki azangi bosantu.


Bongo namonaki Mpate atelemi na ngomba Siona elongo na bato nkoto nkama moko na tuku minei na minei. Kombo ya Mpate mpe ya Tata na Ye ezalaki ya kokomama na bambunzu ya bato yango.


Moto oyo akolonga, nakokomisa ye likonzi kati na Tempelo ya Nzambe na Ngai, mpe akotikala lisusu te kobima kuna. Nakokoma na likolo na ye Kombo ya Nzambe na Ngai mpe kombo ya engumba ya Nzambe na Ngai, Yelusalemi ya sika, oyo ekokita wuta na Lola, epai ya Nzambe na Ngai. Mpe lisusu, nakokoma Kombo na Ngai ya sika na likolo na ye.


Alobaki na bango : « Bosala mabe te na mokili to na ebale monene to mpe na banzete, kino tokosilisa kobeta kashe na bambunzu ya basali ya Nzambe na biso. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ