Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 22:18 - Mokanda na Bomoi

18 Ngai Yoane, nazali koyebisa moto nyonso oyo azali koyoka maloba ya masakoli ya buku oyo : soki moto abakisi ata likambo moko na likolo ya makambo oyo, Nzambe akobakisela ye bitumbu oyo ekomami kati na buku oyo ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 22:18
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kobakisa eloko moko te na maloba na Ye, noki te apamela yo mpe abimisa yo mokosi.


Soki atako bongo boyoki kaka te, nakopesa bino bitumbu mbala sambo mpo na masumu na bino.


Ngai mpe nakotelemela bino lisusu na kanda makasi mpe nakopesa bino bitumbu mbala sambo mpo na masumu na bino.


Bakokweya moko likolo ya moninga lokola nde bazali kokima mopanga ata soki moto moko te azali kolanda bango. Bokolonga te liboso ya banguna na bino.


Yesu azongisaki : — Nkona nyonso oyo Tata na Ngai ya Likolo alonaki te ekopikolama.


Boye, tala makambo oyo nazali koyebisa bino mpe kobetela sete kati na Nkolo : Botambolaka lisusu te lokola Bapagano oyo balandaka makanisi na bango, oyo ezanga tina.


Kobakisa eloko moko te na oyo natindi yo mpe kolongola eloko moko te kati na yango, kasi tosa mitindo oyo Yawe, Nzambe na yo, apesi yo.


asengeli mpe te kokosa to kosala ndeko na ye mabe kati na makambo oyo etali bonzoto, pamba te Nkolo akopesa etumbu na bato nyonso oyo basalaka mabe ya lolenge wana, ndenge toyebisaki mpe tokebisaki bino liboso.


Esengo na moto oyo atangaka maloba ya lisakoli oyo, mpe esengo na bato oyo bayokaka maloba yango mpe babatelaka makambo oyo ekomama kati na yango, pamba te tango ekomi pene.


Bongo namonaki elembo mosusu ya monene mpe ya kokamwa kati na Lola : ba-anjelu sambo bamemaki bitumbu sambo ya suka, pamba te ezali na nzela na yango nde kanda ya Nzambe ekokokisama.


Ba-anjelu sambo oyo bamemaki bitumbu sambo babimaki wuta na Tempelo. Balataki banzambala basala na lino ya peto ; banzambala yango ezalaki kongenga makasi, mpe bakangaki mikaba ya wolo na batolo na bango.


Kasi nyama ekangamaki elongo na mosakoli ya lokuta oyo azalaki kosala bikamwa na kombo ya nyama. Na nzela ya bikamwa yango, akosaki bato oyo batiamaki elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango. Bango mibale : nyama mpe mosakoli ya lokuta, babwakamaki ya bomoi kati na liziba ya moto mpe ya sofolo.


Bongo Satana oyo azalaki kokosa bango abwakamaki na liziba ya moto mpe ya sofolo, epai wapi nyama mpe mosakoli ya lokuta babwakamaki. Bakonyokolama kuna seko na seko, butu mpe moyi.


Moto nyonso oyo kombo na ye ekomamaki te kati na buku ya bomoi abwakamaki kati na liziba ya moto.


Bongo alobaki na ngai lisusu : « Kobomba te maloba ya masakoli ya buku oyo, pamba te tango ekomi pene.


Ngai Yesu, natindaki anjelu na Ngai mpo na kotatola bosolo ya makambo oyo kati na Mangomba. Nazali Mosisa mpe mokitani ya Davidi ; Monzoto ya tongo, oyo engengaka.


Yoka ! Nazali koya kala mingi te. Esengo na moto oyo abatelaka maloba ya masakoli oyo ekomama kati na buku oyo.


Kasi anjelu alobaki na ngai : « Kosala bongo te ! Nazali moninga na yo ya mosala, ya bandeko na yo, basakoli ; mpe ya ba-oyo nyonso babatelaka maloba ya buku oyo. Gumbamela nde Nzambe ! »


Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Laodise : Tala maloba ya Amen, Motatoli ya sembo mpe ya solo, Mokonzi ya bikelamu nyonso ya Nzambe :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ