Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 22:12 - Mokanda na Bomoi

12 Yoka ! Nazali koya kala mingi te ! Nakomema elongo na Ngai lifuti mpo na moto na moto kolanda misala na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 22:12
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Azongiselaka moto na moto kolanda misala na ye, apesaka na moto na moto kolanda etamboli na ye.


Zongisela bango kolanda misala na bango, kolanda misala mabe na bango ; zongisela bango kolanda misala ya maboko na bango, mpe kweyisela bango oyo ekoki na misala na bango.


Botala, Nkolo Yawe azali koya na nguya, loboko na Ye ezali kopesa Ye makoki ya kokonza. Botala, azali na lifuti elongo na Ye, azali kotambola na lifuti na Ye.


Tala makambo oyo Yawe atatoli kino na basuka ya mabele : « Boloba na Siona, mboka kitoko : ‹ Tala, Mobikisi na yo azali koya ! Tala, lifuti na ye ezali elongo na ye, mpe azali kotambola elongo na litomba na ye. › »


« Ngai Yawe, nayebi motema mpe nasosolaka malamu makanisi na yango, mpo na kofuta moto na moto kolanda etamboli mpe misala na ye. »


Mokolo monene ya Yawe ekomi pene, solo ekomi pene mpe ezali koya noki penza. Boyoka ! Makelele ya mokolo na Yawe ekozala bololo ; ezala basoda ya mpiko, bakoganga mpo na koluka lisungi.


Pamba te Mwana na Moto akoya elongo na ba-anjelu na Ye kati na nkembo ya Tata na Ye mpe akofuta moto nyonso kolanda misala na ye.


Boye, moko na moko kati na biso akosamba liboso ya Nzambe mpo na makambo na ye moko.


Soki mosala ya moto oyo atongaki na likolo ya moboko eziki te, motongi yango akozwa lifuti.


Moto oyo aloni mpe moto oyo asopi mayi bazali kaka ndenge moko, mpe moko na moko akozwa lifuti na ye moko kolanda mosala na ye.


Bikolo etombokaki, mpe kanda na Yo epelaki. Tango ekoki mpo na kosambisa bakufi, mpe mpo na kofuta basali na Yo, basakoli, mpe basantu oyo batosaka Kombo na Yo, ezala bato minene to bato pamba ; mpe mpo na koboma bato oyo babebisaka mokili. »


Nakoboma bana ya Jezabeli ; bongo Mangomba nyonso ekondima ete Ngai nazali penza Ye oyo akundolaka mozindo ya mitema mpe ya milimo ya bato. Nakofuta moko na moko na bino kolanda etamboli na ye.


Namonaki lisusu bakufi, bato minene mpe bato pamba batelemi liboso ya Kiti ya Bokonzi. Babuku efungolamaki. Mpe buku mosusu efungolamaki, yango nde buku ya bomoi. Bongo bakufi basambisamaki kolanda misala na bango ndenge ekomama kati na babuku.


Motatoli ya makambo oyo alobi : — Iyo, nazali koya kala mingi te. Amen : Nkolo Yesu, yaka !


Yoka ! Nazali koya kala mingi te. Esengo na moto oyo abatelaka maloba ya masakoli oyo ekomama kati na buku oyo.


Nazali koya kala mingi te. Oyo ozali na yango, simba yango makasi mpo ete moko te abotola yo motole na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ