Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakosukisa lisese oyo mpe nakosala ete balobaka yango lisusu te kati na Isalaele. › Loba na bango lisusu : ‹ Tango ekomi pene oyo bimoniseli nyonso ekokokisama.
Kasi yo, Daniele, batela maloba oyo lokola sekele mpe kanga buku kino na tango ya suka. Mingi bakotambola bipai na bipai, mpe boyebi ya bato ekokola makasi. »
Makambo oyo nazali koyebisa bino sik’oyo kati na molili, boloba yango na moyi ; mpe oyo bazali koloba na bino na litoyi, bosakola yango wuta na likolo ya ndako.
Bosalaka bongo awa bozali kososola tango nini tozali kobika. Tango ya kolamuka na pongi na bino ekoki, pamba te lobiko ekomi sik’oyo pene na biso, koleka tango tozwaki kondima sika.
Esengo na moto oyo atangaka maloba ya lisakoli oyo, mpe esengo na bato oyo bayokaka maloba yango mpe babatelaka makambo oyo ekomama kati na yango, pamba te tango ekomi pene.
Ngai Yesu, natindaki anjelu na Ngai mpo na kotatola bosolo ya makambo oyo kati na Mangomba. Nazali Mosisa mpe mokitani ya Davidi ; Monzoto ya tongo, oyo engengaka.
Ngai Yoane, nazali koyebisa moto nyonso oyo azali koyoka maloba ya masakoli ya buku oyo : soki moto abakisi ata likambo moko na likolo ya makambo oyo, Nzambe akobakisela ye bitumbu oyo ekomami kati na buku oyo ;
Kasi anjelu alobaki na ngai : « Kosala bongo te ! Nazali moninga na yo ya mosala, ya bandeko na yo, basakoli ; mpe ya ba-oyo nyonso babatelaka maloba ya buku oyo. Gumbamela nde Nzambe ! »
Bongo namonaki, na loboko ya mobali ya Ye oyo avandaki na Kiti ya Bokonzi, buku moko elingama, bakoma yango na kati mpe na libanda, mpe bakanga yango na bikangelo sambo.