Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 21:9 - Mokanda na Bomoi

9 Moko kati na ba-anjelu sambo oyo bazalaki na bakopo sambo etonda na bitumbu sambo ya suka ayaki mpe alobaki na ngai : « Yaka, nakolakisa yo mwasi mobandami ya libala, mwasi ya Mpate. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 21:9
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Emoniseli kowuta na Yesu-Klisto. Nzambe apesaki Ye yango mpo ete alakisa na basali na Ye makambo oyo esengeli koya kala mingi te. Yesu-Klisto atindaki anjelu na Ye koyebisa emoniseli yango epai ya Yoane, mosali na Ye.


Moko kati na ba-anjelu sambo oyo bazalaki na bakopo sambo ayaki mpe alobaki na ngai : « Yaka, nakolakisa yo etumbu oyo mwasi ya ndumba monene oyo avandaka na bibale minene akozwa.


Tika ete tosepela, totonda na esengo mpe topesa Ye nkembo ! Pamba te tango ya feti ya libala ya Mpate ekoki. Mwasi mobandami na Ye ya libala asili komibongisa.


Anjelu amekaki mpe kovimba ya mir kolanda ndenge bato basalaka : ezalaki na bametele pene tuku motoba na mitano.


Namonaki engumba ya bule, Yelusalemi ya sika, kokita wuta na Lola epai ya Nzambe. Ebongisamaki lokola mwasi mobandami ya libala oyo asali monzele mpo na mobali na ye.


Bongo anjelu alakisaki ngai ebale ya mayi ya bomoi ; ezalaki kongenga lokola talatala mpe ezalaki kobima wuta na Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe ya Mpate.


Molimo mpe Mwasi mobandami ya libala balobi : — Yaka ! Tika ete ye oyo azali koyoka maloba oyo aloba : « Yaka ! » Tika ete ye oyo azali na posa ya mayi aya ; mpe tika ete ye oyo alingi kozwa mayi ya bomoi azwa yango na ofele.


Anjelu alobaki na ngai : « Maloba oyo ezali ya solo mpe ebongi na kotiela yango motema. Nkolo, Nzambe ya milimo ya basakoli, atindaki anjelu na Ye mpo na kolakisa na basali na Ye makambo oyo esengeli kosalema kala mingi te. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ