Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 21:25 - Mokanda na Bomoi

25 Bikuke ya engumba yango ekobanda kokangama te mokolo mobimba, pamba te butu ekozala kuna te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 21:25
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bikuke na yo ekozala tango nyonso efungwama, ekotikala kokangama te, ezala na moyi to na butu, mpo ete bato bamemela yo bozwi ya bikolo, bakonzi na yango na molongo lokola bato bakangami na etumba.


Moyi na yo ekolala lisusu te, mpe sanza na yo ekobunga lisusu te ; pamba te Yawe akozala pole na yo mpo na libela, mpe mikolo na yo ya pasi ekosila.


Ekozala mokolo ya ndenge mosusu, mokolo ezanga moyi mpe butu, mokolo oyo Ye moko kaka Yawe ayebi ; pole ekobima soki pokwa ekoki.


Engumba yango ezalaki na mir moko ya molayi mpe emata na bosanda, mpe ezalaki na bikuke zomi na mibale, mpe na ba-anjelu zomi na mibale na bikuke yango. Bakombo ya mabota zomi na mibale ya Isalaele ezalaki ya kokomama na bikuke yango.


Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai asimbaki lokola emekelo molayi lingenda basala na wolo, mpo na komeka molayi ya engumba, ya bikuke na yango mpe ya mir na yango.


Engumba yango ezali na posa te ya moyi to ya sanza mpo na kongengisa yango, pamba te engengisamaka na nkembo ya Nzambe ; bongo Mpate azali mwinda na yango.


Butu ekozala lisusu te. Bakozala na posa te ya pole ya mwinda to ya moyi, pamba te Nkolo Nzambe akongengisa bango na pole na Ye. Mpe bakokonza seko na seko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ