Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 21:24 - Mokanda na Bomoi

24 Bikolo ekotambola na pole na yango, mpe bakonzi ya mokili bakomema nkembo na bango kati na engumba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 21:24
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Babola bakolia mpe bakotonda ; bato oyo balukaka Yawe bakosanzola Ye. Tika ete bozala na bomoi libela na libela.


Na mikolo oyo ekoya, ngomba ya Tempelo ya Yawe ekolendisama ngwi na songe ya bangomba, ekoleka bangomba mikuse nyonso na molayi, mpe bikolo nyonso ekokende kotondana kuna.


Oh ndako ya Jakobi, yaka, tika ete totambola na pole ya Yawe !


Bakonzi bakozala batata babokoli na yo, mpe basi na bango, basungi na yo ; bakofukama liboso na yo na bilongi etala na mabele, bakolembola putulu ya makolo na yo. Boye, okoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe ; ete bato oyo batielaka Ngai motema bayokisamaka soni te. »


ndenge wana mpe bato ya bikolo bakokamwa, mpe bakonzi bakokanga minoko na bango na tina na ye, pamba te bakomona oyo nanu babetela bango lisolo te mpe bakososola oyo nanu bayoka te.


Ndenge mvula mpe mvula ya pembe enokaka wuta na likolo mpe ezongaka te na likolo soki epolisi mabele te, soki ebotisi yango bambuma mpe bafololo te, soki epesi nkona te na moloni mpe bilei te na moto oyo aliaka,


Solo, okobenga bikolo oyo oyebi te, mpe bikolo oyo eyebi yo te ekoya na lombangu epai na yo mpo na Yawe, Nzambe na yo, mpo na Mosantu ya Isalaele, pamba te alatisi yo nkembo. »


Nkembo ya Libani ekoya epai na yo, banzete ya sipele, ya pini mpe ya bwisi ekoya elongo mpo na kobongisa Esika na Ngai ya bule ; mpe nakopesa lokumu na esika na Ngai, oyo natiaka makolo na Ngai.


Okomela miliki ya bikolo mpe okomela mabele ya bakonzi ; boye okoyeba solo ete Ngai Yawe, nazali Mobikisi na yo mpe Mosikoli na yo, Elombe ya Jakobi.


« Mpe Ngai, likolo ya misala mpe makanisi na bango, nakomi pene ya kosangisa bato ya bikolo mpe nkota nyonso ; bongo bakoya mpo na komona nkembo na Ngai.


soki olapi ndayi na bosolo mpe na bosembo : ‹ Na Kombo na Yawe, › bikolo ekomipambola mpe ekomipesa nkembo mpo na yo. »


Siona, tokende ! Bima noki, yo oyo ovandaka na Babiloni, mboka kitoko !


ya kozala mosali ya Yesu-Klisto mpo na Bapagano. Boye abulisi ngai mpo na kosakola Sango Malamu ya Nzambe mpo ete Bapagano bakoma likabo oyo ekosepelisa Nzambe, likabo oyo Molimo Mosantu abulisi.


Pamba te Mangomba ya Masedwane mpe ya Akayi ezwaki mokano ya kosangisa biloko mpo na kosunga babola oyo bazali kati na basantu ya Yelusalemi.


Oh bikolo, bosepela elongo na bato na Ye ! Bino ba-anjelu nyonso, bogumbamela Nzambe ; pamba te akozongisa mabe na mabe mpo na makila ya basali na Ye, akozongisa mabe na mabe epai ya banguna na Ye mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mokili na Ye mpe bato na Ye.


Bakomemela engumba yango nkembo mpe lokumu ya bikolo.


Ezalaki kotiola na kati-kati ya balabala monene ya engumba. Na esika oyo ebale ekabwanaki na biteni mibale, ezalaki na nzete ya bomoi oyo ebotaka bambuma mbala zomi na mibale na mobu, elingi koloba ete ebotaka bambuma sanza na sanza ; mpe makasa na yango ebikisaka bikolo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ