Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 21:2 - Mokanda na Bomoi

2 Namonaki engumba ya bule, Yelusalemi ya sika, kokita wuta na Lola epai ya Nzambe. Ebongisamaki lokola mwasi mobandami ya libala oyo asali monzele mpo na mobali na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 21:2
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh engumba ya Nzambe, maloba ya nkembo ezali kolobama na tina na yo !


Tala ndenge nini engumba ya boyengebene ekomi lokola mwasi ya ndumba ! Ezalaki liboso engumba etonda na bosembo, boyengebene ezalaki kovanda kati na yango ; kasi lelo oyo ekomi kobomba babomi.


Oh Siona, lamuka, lamuka ! Tika ete omikomisa lisusu makasi. Yelusalemi, engumba ya bule, lata bilamba na yo ya lokumu, pamba te ezala moto oyo bakata ngenga te to moto ya mbindo, akokota lisusu kati na yo te.


pamba te Mokeli na yo nde mobali na yo, Kombo na Ye : Yawe, Mokonzi ya mampinga ; Mosantu ya Isalaele azali Mosikoli na yo ; babengaka Ye : Nzambe ya mokili mobimba.


Nakosepela makasi kati na Yawe, molimo na ngai ekosepela kati na Nzambe na ngai, pamba te alatisi ngai bilamba ya lobiko mpe azipi ngai na elamba ya bosembo, ndenge mobandami ya mobali alataka motole na ye ya kitoko lokola Nganga-Nzambe to ndenge mobandami ya mwasi alataka mayaka na ye ya talo.


Bakobenga yo lisusu te Engumba basundola, bakobenga lisusu mokili na yo te Mokili ebeba ; kasi bakobenga yo « Esengo ya Yawe, » mpe bakobenga mokili na yo « Mwasi ya libala, » pamba te Yawe akozwa esengo kati na yo, mpe mabele na yo ekozwa mobali ya libala.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Tango nakobimisa bango na bowumbu, tala lisusu maloba oyo bato bakoloba kati na Yuda mpe kati na bingumba na yango : ‹ Oh ndako ya bosembo ; oh ngomba ya bule, tika ete Yawe apambola yo ! ›


Mwasi ya libala azali ya mobali oyo abali ye ; mpe moninga ya mobali oyo asili kobala, ezali moto oyo atelemi pembeni na ye mpe azali na esengo makasi tango azali koyoka mongongo na ye. Ezali mpe bongo mpo na ngai : esengo na ngai ezali sik’oyo ya kokoka.


Mpo na bino, natondi na zuwa kowuta na Nzambe. Nabalisaki bino na mobali moko kaka, Ye nde Klisto, lokola elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe azali peto.


Pamba te Abrayami azalaki kozela engumba oyo ezali na miboko oyo ebukanaka te, engumba oyo Ye moko Nzambe azali Mobongisi mpe Motongi na yango.


Kasi sik’oyo bazali koluka mokili ya kitoko penza, elingi koloba mokili ya Likolo. Yango wana Nzambe azalaka na soni te tango babengaka Ye « Nzambe na bango, » pamba te abongisela bango engumba moko ya kitoko.


Kasi, bopusani nde pene ya ngomba Siona, pene ya Yelusalemi ya Likolo, engumba ya Nzambe na bomoi ; pene ya bankoto na bankoto ya ba-anjelu oyo basangani mpo na kosepela,


pamba te, kati na mokili oyo, tozali na engumba moko te oyo ekowumela libela na libela, kasi tozali nde koluka engumba oyo ezali koya.


Emoniseli kowuta na Yesu-Klisto. Nzambe apesaki Ye yango mpo ete alakisa na basali na Ye makambo oyo esengeli koya kala mingi te. Yesu-Klisto atindaki anjelu na Ye koyebisa emoniseli yango epai ya Yoane, mosali na Ye.


Yoane ; Epai ya Mangomba sambo kati na etuka ya Azia : Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino, kowuta na Ye oyo azali, azalaki mpe azali koya, kowuta na milimo sambo oyo bazalaka liboso ya Kiti na Ye ya Bokonzi,


Ngai Yoane, ndeko na bino, oyo azali kokabola elongo na bino pasi, bokonzi mpe molende kati na Yesu, nazalaki kati na esanga ya Patimosi, likolo ya Liloba na Nzambe mpe litatoli na ngai na tina na Yesu.


Kasi kozwa te molayi ya lopango ya libanda ya Tempelo, pamba te esilaki kokabama na maboko ya bikolo ya bapaya. Bapagano bakonyata engumba ya bule basanza tuku minei na mibale.


Bongo kati na Molimo, amemaki ngai na likolo ya ngomba moko ya monene mpe ya molayi ; alakisaki ngai Yelusalemi, engumba ya bule, oyo ezalaki kokita wuta na Lola epai ya Nzambe.


Moko kati na ba-anjelu sambo oyo bazalaki na bakopo sambo etonda na bitumbu sambo ya suka ayaki mpe alobaki na ngai : « Yaka, nakolakisa yo mwasi mobandami ya libala, mwasi ya Mpate. »


Molimo mpe Mwasi mobandami ya libala balobi : — Yaka ! Tika ete ye oyo azali koyoka maloba oyo aloba : « Yaka ! » Tika ete ye oyo azali na posa ya mayi aya ; mpe tika ete ye oyo alingi kozwa mayi ya bomoi azwa yango na ofele.


mpe soki moto alongoli ata likambo moko na maloba ya masakoli ya buku oyo, Nzambe mpe akolongola ye ndingisa ya kolia bambuma ya nzete ya bomoi mpe ya kokota kati na Engumba ya Bule, oyo etalisami kati na buku oyo.


Moto oyo akolonga, nakokomisa ye likonzi kati na Tempelo ya Nzambe na Ngai, mpe akotikala lisusu te kobima kuna. Nakokoma na likolo na ye Kombo ya Nzambe na Ngai mpe kombo ya engumba ya Nzambe na Ngai, Yelusalemi ya sika, oyo ekokita wuta na Lola, epai ya Nzambe na Ngai. Mpe lisusu, nakokoma Kombo na Ngai ya sika na likolo na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ