Nzokande Ogi, mokonzi ya Bashani, atikalaki kaka ye moko na bomoi kati na bato ya Refayimi. Mbeto na ye ezalaki ya bibende ; molayi na yango ezalaki na bametele pene minei mpe mokuse na yango, bametele pene mibale. Mbeto yango ezali kino lelo na engumba Raba ya bato ya Amoni.
mpe bazali koyemba nzembo ya sika liboso ya Kiti ya Bokonzi, ya bikelamu minei ya bomoi mpe ya bampaka. Moko te akokaki koyekola nzembo yango longola kaka bato nkoto nkama moko na tuku minei na minei oyo basikolamaki wuta na mokili.
Bangambo nyonso minei ya engumba yango ezalaki ndenge moko na molayi mpe na mokuse. Anjelu asalelaki lingenda na ye mpo na komeka molayi ya engumba : ezalaki na bakilometele pene nkoto mibale na nkama mibale na molayi, na mokuse mpe na bosanda.
Moko kati na ba-anjelu sambo oyo bazalaki na bakopo sambo etonda na bitumbu sambo ya suka ayaki mpe alobaki na ngai : « Yaka, nakolakisa yo mwasi mobandami ya libala, mwasi ya Mpate. »