Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 21:16 - Mokanda na Bomoi

16 Bangambo nyonso minei ya engumba yango ezalaki ndenge moko na molayi mpe na mokuse. Anjelu asalelaki lingenda na ye mpo na komeka molayi ya engumba : ezalaki na bakilometele pene nkoto mibale na nkama mibale na molayi, na mokuse mpe na bosanda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 21:16
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Amekaki molayi ya eteni oyo ezalaki sima ya eteni ya Tempelo, oyo eleki monene : ezalaki na bametele pene zomi na molayi, mpe bametele pene zomi na mokuse ; mpe alobaki na ngai : « Oyo ezali Esika-Oyo-Eleki-Bule. »


Amekaki bangambo nyonso minei. Ezalaki na mir moko zingazinga na yango, oyo ezalaki na bametele pene nkama mibale na tuku mitano na molayi mpe nkama mibale na tuku mitano na mokuse ; mir yango ezalaki kokabola eteni ya bule ya Tempelo mpe eteni ya Tempelo oyo ezali bule te.


Molayi nyonso ya mir oyo ezingeli engumba ekozala na bametele pene nkoto libwa. Mpe kobanda na tango wana, kombo ya engumba ekokoma ‹ Yawe azali awa. › »


Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai asimbaki lokola emekelo molayi lingenda basala na wolo, mpo na komeka molayi ya engumba, ya bikuke na yango mpe ya mir na yango.


Anjelu amekaki mpe kovimba ya mir kolanda ndenge bato basalaka : ezalaki na bametele pene tuku motoba na mitano.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ