Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 21:15 - Mokanda na Bomoi

15 Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai asimbaki lokola emekelo molayi lingenda basala na wolo, mpo na komeka molayi ya engumba, ya bikuke na yango mpe ya mir na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 21:15
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango amemaki ngai kuna, namonaki moto moko oyo lolenge na ye ezalaki lokola ebende ya bronze : atelemaki na ekuke ya engumba mpe asimbaki na loboko na ye singa moko ya lino mpe libaya oyo bamekelaka molayi.


Bongo natombolaki miso mpe namonaki maseke minei liboso na ngai.


Natunaki Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai : — Maseke wana elakisi nini ? Azongiselaki ngai : — Maseke wana ezali bikolo ya nguya oyo epanzaki Yuda, Isalaele mpe Yelusalemi.


Engumba yango ezalaki na mir moko ya molayi mpe emata na bosanda, mpe ezalaki na bikuke zomi na mibale, mpe na ba-anjelu zomi na mibale na bikuke yango. Bakombo ya mabota zomi na mibale ya Isalaele ezalaki ya kokomama na bikuke yango.


Bangambo nyonso minei ya engumba yango ezalaki ndenge moko na molayi mpe na mokuse. Anjelu asalelaki lingenda na ye mpo na komeka molayi ya engumba : ezalaki na bakilometele pene nkoto mibale na nkama mibale na molayi, na mokuse mpe na bosanda.


Bikuke wana zomi na mibale ezalaki lokola mayaka zomi na mibale ; ekuke moko na moko esalemaki na liyaka moko. Balabala monene ya engumba yango ezalaki ya wolo oyo basangisa na eloko mosusu te, peto lokola talatala.


Bikuke ya engumba yango ekobanda kokangama te mokolo mobimba, pamba te butu ekozala kuna te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ