Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 21:14 - Mokanda na Bomoi

14 Mir ya engumba yango etongamaki likolo ya miboko zomi na mibale, mpe bakombo ya bantoma zomi na mibale ya Mpate ezalaki ya kokomama na likolo na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 21:14
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh engumba ya mawa, engumba oyo mopepe makasi esili kobuka mpe ezangeli kobondisama, nakotonga yo lisusu na mabanga ya talo mpe nakosala miboko na yo na mabanga ya safiri,


Mpe Ngai, nazali koloba na yo : Ozali Libanga, mpe ezali na likolo ya libanga oyo nde Ngai nakotonga Lingomba na Ngai ; bongo bikuke ya mboka ya bakufi ekotikala kolonga yango te.


Bongo babetaki zeke, mpe zeke ekweyaki epai ya Matiasi ; boye Matiasi aponamaki, mpe babakisaki ye na lisanga ya bantoma zomi na moko.


Boye Jake, Petelo mpe Yoane oyo bazalaki makonzi ya Lingomba bandimaki ngolu oyo Nzambe apesaki ngai. Yango wana basanganaki elongo na ngai mpe Barnabasi mpo na kolakisa ete tokomi moko ; mpe toyokanaki ete biso tokende epai ya Bapagano, mpe bango bakende epai ya bato oyo bakatama ngenga.


Nzambe akotisi bino kati na ndako oyo moboko na yango ezali bantoma mpe basakoli, mpe Ye moko Yesu-Klisto azali libanga na yango ya motuya mpo na kosimba ndako mobimba.


Molimo ayebisaki mabombami yango te na bato ya bikeke ya kala, ndenge alakisi yango sik’oyo na bantoma mpe basakoli ya Nzambe oyo bazali bule.


Ezali Ye moko Klisto nde akomisaki bamoko bantoma, bamosusu basakoli, bapanzi Sango Malamu, babateli bibwele mpe balakisi,


Pamba te Abrayami azalaki kozela engumba oyo ezali na miboko oyo ebukanaka te, engumba oyo Ye moko Nzambe azali Mobongisi mpe Motongi na yango.


Kasi bino, balingami na ngai, bokanisa maloba oyo bantoma ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, balobaki liboso.


Likolo, sepela na libebi na yango ! Bino mpe basantu, bosepela ! Bino bantoma mpe basakoli, bosepela mpe lokola ! Pamba te Nzambe alongisi bino awa akateli yango etumbu. »


Bikuke misato ezalaki na ngambo ya este, misato na ngambo ya nor, misato na ngambo ya sude, mpe misato na ngambo ya weste.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ