Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 20:8 - Mokanda na Bomoi

8 mpe akokende kokosa bikolo ya bangambo nyonso minei ya mokili mobimba, elingi koloba Gogi mpe Magogi. Akosangisa bango mpo na bitumba. Motango na bango ekozala lokola zelo ya ebale monene oyo bakoki kotanga te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 20:8
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato ya Yuda mpe ya Isalaele bazalaki ebele lokola zelo ya libongo ya ebale monene ; bazalaki kolia, komela mpe bazalaki na esengo.


Molimo yango ezongisaki : « Nakokende mpe nakobongwana molimo ya lokuta kati na minoko ya basakoli na ye nyonso. » Yawe alobaki : « Solo, okolonga kokosa ye ! Kende mpe sala bongo. »


Oh Isalaele, ata bato na yo bazali ebele lokola zelo ya ebale monene, ndambo kaka nde bakozonga ; pamba te Nzambe azwi mokano ya kobebisa bato, akomema bosembo lokola mpela.


Ndenge kaka bakoki kotanga te mampinga ya likolo mpe zelo ya bibale minene mpo na koyeba motango na yango, ndenge wana mpe nakokomisa ebele, bakitani ya Davidi, mosali na Ngai, mpe Balevi oyo basalelaka Ngai. › »


« Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya Gogi, ya mokili ya Magogi, mokambi ya liboso ya Mesheki mpe ya Tubali ! Sakola na tina ye mpo na kotelemela ye !


Mwana na moto, sakola mpo na kotelemela Gogi ! Loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh Gogi, mokambi ya liboso ya Mesheki mpe ya Tubali, natombokeli yo !


Nakotinda moto kati na mokili ya Magogi mpe kati na bato oyo bavandi na kimia kati na bisanga ; mpe bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.


« Mwana na moto, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na mokili ya Isalaele : ‹ Esili ! Tango ya suka ebelemi mpo na mokili mobimba !


Yango wana, wuta na moto oyo akomaki mpaka mpe pene ya kokufa, bato babotamaki ebele penza lokola minzoto ya likolo mpe lokola zelo ya libongo ya ebale, oyo bakoki kutu kotanga te.


Babwakaki dalagona monene, nyoka ya kala, oyo babengaka zabolo to Satana, oyo akosaka mokili mobimba. Ebwakamaki na mabele elongo na ba-anjelu na yango.


Ezali milimo ya kindoki oyo esalaka bikamwa. Ebimi mpo na kokende epai ya bakonzi ya mokili mobimba, mpo na kosangisa bango mpo na etumba ya mokolo monene ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.


Bongo Satana oyo azalaki kokosa bango abwakamaki na liziba ya moto mpe ya sofolo, epai wapi nyama mpe mosakoli ya lokuta babwakamaki. Bakonyokolama kuna seko na seko, butu mpe moyi.


Anjelu abwakaki ye kati na libulu wana ya monene mpe ya molili makasi ; akangaki yango mpe abetaki kashe na likolo na yango mpo ete akosa lisusu bikolo te kino tango mibu nkoto moko ekokoka. Sima na yango, bakotika ye mpo na mwa tango moke.


Sima na makambo wana, namonaki ba-anjelu minei batelemi na basonge nyonso minei ya mokili, bazali kokanga mipepe nyonso minei ya mokili mpo ete mopepe ata moke te epepa na mokili to na ebale monene to mpe na banzete.


Bato ya Madiani, ya Amaleki mpe ya ngambo ya este bazalaki ya kopanzana kati na lubwaku, ebele lokola mabanki. Bashamo na bango ezalaki ebele koleka zelo ya ebale.


Bato ya Filisitia basanganaki mpo na kobundisa bato ya Isalaele ; bazalaki na bashar nkoto tuku misato ; basoda oyo babundaka likolo ya bampunda, nkoto motoba ; mpe basoda oyo motango na bango ezalaki ebele lokola zelo ya ebale monene. Bayaki mpe batongaki molako na bango, na Mikimasi, na ngambo ya este ya Beti-Aveni.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ