Emoniseli 20:14 - Mokanda na Bomoi14 Bongo kufa mpe mboka ya bakufi ebwakamaki kati na liziba ya moto. Liziba ya moto ezali kufa ya mibale. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi nyama ekangamaki elongo na mosakoli ya lokuta oyo azalaki kosala bikamwa na kombo ya nyama. Na nzela ya bikamwa yango, akosaki bato oyo batiamaki elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango. Bango mibale : nyama mpe mosakoli ya lokuta, babwakamaki ya bomoi kati na liziba ya moto mpe ya sofolo.
Namonaki liboso na ngai mpunda moko ya langi ya mayi ya pondu ; kombo ya motambolisi na yango ezalaki « Kufa, » mpe mboka ya bakufi ezalaki kolanda motambolisi yango na sima. Bapesamelaki nguya ya koboma bato na nzela ya mopanga, ya nzala, ya bokono mpe ya banyama mabe, na etando ya eteni moko kati na biteni minei ya mokili.