Emoniseli 20:12 - Mokanda na Bomoi12 Namonaki lisusu bakufi, bato minene mpe bato pamba batelemi liboso ya Kiti ya Bokonzi. Babuku efungolamaki. Mpe buku mosusu efungolamaki, yango nde buku ya bomoi. Bongo bakufi basambisamaki kolanda misala na bango ndenge ekomama kati na babuku. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nyama oyo omonaki ; oyo liboso, ezalaki, mpe sik’oyo, ezali lisusu te ; ekobima wuta na libulu moko ya monene mpe ya molili makasi, mpe ekokende na libebi na yango. Bavandi ya mokili, ba-oyo bakombo na bango ekomama te kati na buku ya bomoi wuta na ebandeli ya mokili bakokamwa tango bakomona nyama ; pamba te liboso, ezalaki, mpe sik’oyo, ezali lisusu te, kasi ekoya lisusu.