Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 20:10 - Mokanda na Bomoi

10 Bongo Satana oyo azalaki kokosa bango abwakamaki na liziba ya moto mpe ya sofolo, epai wapi nyama mpe mosakoli ya lokuta babwakamaki. Bakonyokolama kuna seko na seko, butu mpe moyi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 20:10
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakobaki kotala mpo na maloba ya lofundu oyo liseke yango ezalaki koloba ; mpe wana nazalaki kaka kotala, babomaki nyama yango, nzoto na yango ebebaki mpe babwakaki yango na moto.


Bongo akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi : « Bokende mosika na Ngai, bino bato oyo Nzambe alakela mabe ; bokende na moto ya libela na libela, oyo ebongisama mpo na Satana elongo na ba-anjelu na ye.


Boye, bakokende na etumbu ya seko, kasi bato ya sembo bakozwa bomoi ya seko.


Bosala keba na basakoli ya lokuta ! Tango bayaka epai na bino, bazwaka lolenge ya bameme, kasi bazali penza bambwa ya zamba oyo etonda na kanda.


Bongo namonaki milimo misato ya mbindo lokola magorodo kobima longwa na monoko ya dalagona, na monoko ya nyama mpe na monoko ya mosakoli ya lokuta.


Kasi nyama ekangamaki elongo na mosakoli ya lokuta oyo azalaki kosala bikamwa na kombo ya nyama. Na nzela ya bikamwa yango, akosaki bato oyo batiamaki elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango. Bango mibale : nyama mpe mosakoli ya lokuta, babwakamaki ya bomoi kati na liziba ya moto mpe ya sofolo.


mpe akokende kokosa bikolo ya bangambo nyonso minei ya mokili mobimba, elingi koloba Gogi mpe Magogi. Akosangisa bango mpo na bitumba. Motango na bango ekozala lokola zelo ya ebale monene oyo bakoki kotanga te.


Tala ndenge nini, kati na emoniseli na ngai, bampunda mpe basoda oyo babundaka na likolo na yango bazalaki : balataki bibende oyo basoda balataka mpo na kobatela tolo. Bibende yango ezalaki ya motane makasi lokola moto, ya langi ya bule ya pete mpe ya langi ya mosaka ; bongo mito ya bampunda ezalaki lokola mito ya bankosi, mpe minoko na yango ezalaki kobimisa moto, milinga mpe sofolo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ