6 Kasi ezali na likambo moko oyo nasepelaka na yango epai na yo : olingaka te misala ya bato ya lingomba ya Nikola, oyo Ngai mpe nalingaka te.
mosakoli Jewu, mwana mobali ya Anani, akendeki kokutana na ye. Alobaki na mokonzi Jozafati : « Mpo na nini kosunga moto mabe mpe kolinga bato oyo bayinaka Yawe ? Mpo ete osali bongo, kanda makasi ya Yawe ezali likolo na yo.
Nakotala eloko moko te ya mabe ; nayinaka misala ya bato oyo bazangi kondima, ekoki kokangama na ngai te.
Nayinaka kosangana elongo na bato ya misala mabe mpe navandaka te esika moko na bato mabe.
Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, nakopesa ye nzela ya kolia mbuma ya nzete ya bomoi, oyo ezali kati na Paradizo ya Nzambe. »