Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 2:20 - Mokanda na Bomoi

20 Nzokande, ezali na likambo moko oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango : opesaka na Jezabeli, mwasi oyo amibengaka mosakoli, nzela ya kopengwisa basali na Ngai na mateya na ye ya mabe, mpo na kotindika bango na kindumba mpe na kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 2:20
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lokola amonaki ete kolanda masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, ekokaki te, abalaki Jezabeli, mwana mwasi ya Etibala, mokonzi ya Sidoni, mpe akomaki kosalela nzambe Bala mpe kogumbamela yango.


Eliya alobaki na ye : — Kobanga te, zonga na ndako mpe sala ndenge olobi. Kasi salela ngai nanu lipa na oyo ozali na yango mpe memela ngai yango ; bongo na sima, okosala mpo na yo mpe mpo na mwana na yo ya mobali.


Kuna, okomela mayi ya lubwaku, mpe napesi mitindo epai ya bayanganga mpo ete eleisa yo.


Tango kaka Yorami amonaki Jewu, atunaki ye : — Boni Jewu, oyei mpo na kimia ? Jewu azongisaki : — Ndenge nini kimia ekoki kozala na tango losambo ya banzambe ya bikeko mpe kindoki ya mama na yo, Jezabeli, ezali kokoba ?


Osengeli koboma libota ya Akabi, mokonzi na yo, mpe nakozongisa mabe na mabe mpo na makila ya bawumbu na ngai, basakoli, mpe ya bawumbu nyonso ya Yawe, oyo Jezabeli asopaki makila na bango.


Bokeba ! Bosala boyokani te elongo na bavandi ya mokili yango ; noki te tango bakosambela banzambe na bango mpe bakobonzela yango mbeka, babenga bino mpo ete bolia mbeka na bango elongo ;


Boye, yo, mwana na moto, tala mpe telemela bilenge basi ya Isalaele, oyo bazali kosakola kolanda makanisi ya mitema na bango moko ! Sakola mabe na tina na bango


Na esika ya kotungisa bango, tosengeli kaka kokomela bango ete balia te misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, basala kindumba te, balia te nyama oyo babomi na kozanga kobimisa makila, mpe bamela makila te.


Bolia te misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, bomela makila te, bolia te nyama oyo babomi na kozanga kobimisa makila, mpe bosala kindumba te. Ekozala malamu soki bokimi makambo yango. Botikala malamu !


Kasi soki moto moko alobi na yo : « Mosuni oyo ebonzamaki lokola mbeka epai ya nzambe ya ekeko, » kolia yango te, likolo ya moto oyo akebisi yo mpe mpo ete obebisa te motema na yo.


Nzokande, ezali na ndambo ya makambo oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango : kati na yo, ezali na bato oyo bakangama na mateya ya Balami oyo ayebisaki Balaki ete atia motambo mpo na kotindika bana ya Isalaele kati na masumu ya kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, mpe kati na masumu ya kindumba.


Nzokande, ezali na likambo moko oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango : obwaki bolingo na yo ya liboso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ