Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 2:2 - Mokanda na Bomoi

2 Nayebi misala, pasi mpe molende na yo. Nayebi ete okoki te koyikela bato mabe mpiko ; nayebi lisusu ete omekaki bato oyo balobaka ete bazali bantoma, nzokande bazali na bango bantoma te, mpe omonaki penza ete bazali bakosi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 2:2
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Solo, Yawe ayebi nzela ya bato ya sembo, kasi nzela ya bato mabe ememaka na libebi.


Bongo Ngai, nakoyebisa bango : ‹ Natikala koyeba bino te ! Bolongwa liboso na Ngai, bino bato mabe ! ›


Yesu atunaki Filipo motuna oyo mpo na komeka ye mpe kotala soki akoloba nini, pamba te Ye, Yesu, ayebaki makambo oyo alingaki kosala.


oyo ezalaka kutu te. Solo, ezali na bato oyo bazali kotia mobulu kati na bino mpe bazali koluka kobongola Sango Malamu ya Klisto.


Na bongo, tokozala lisusu bana mike te oyo bambonge ebwaki-bwaki lokola bwato, mpe oyo lolenge nyonso ya mateya, ya lokuta mpe ya mayele mabe ya bato epumbwisi na mopepe.


Tobosanaka te liboso ya Nzambe, Tata na biso, misala ya kondima na bino, misala ya bolingo na bino mpe molende na bino, oyo ewuti na elikya monene oyo bozali na yango kati na Nkolo na biso, Yesu-Klisto.


kasi bomekaka nyonso na mozindo mpe bosimba oyo ezali malamu.


Nzokande moboko makasi oyo Nzambe asila kotia ezali kaka ngwi ; batobola makomi oyo na likolo na yango lokola kashe : « Nkolo ayebi bato na Ye, » mpe « Moto nyonso oyo atatolaka Kombo ya Nkolo asengeli koboya mabe. »


Pamba te Nzambe azangi bosembo te mpo ete abosana mosala na bino mpe bolingo nyonso oyo botalisaki mpo na Kombo na Ye, na ndenge bosungaki mpe bozali kokoba kosunga basantu.


Balingami na ngai, bondimaka te bato nyonso oyo babetaka tolo mpo na koloba ete batondisami na Molimo ya Nzambe ; kasi bomeka bango mpo na koyeba soki bazali penza ya Nzambe, pamba te basakoli ebele ya lokuta basili kopanzana na mokili.


Kanisa malamu esika oyo ozalaki, liboso ete okweya ! Bongola motema na yo mpe zongela misala na yo ya liboso ; noki te, nakoya epai na yo mpe nakolongola etelemiselo na yo ya mwinda na esika na yango.


Kasi ezali na likambo moko oyo nasepelaka na yango epai na yo : olingaka te misala ya bato ya lingomba ya Nikola, oyo Ngai mpe nalingaka te.


Nayebi minyoko mpe bobola na yo, nzokande ozali mozwi ; nayebi ndenge nini bato oyo balobaka ete bazali Bayuda, kasi bazali na bango Bayuda te, batiolaka yo ; bazali nde ndako ya mayangani ya Satana.


Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Sarde : « Tala maloba ya Ye oyo azali na milimo sambo ya Nzambe mpe minzoto sambo : Nayebi misala na yo ; nayebi malamu ete okenda sango ete ozali na bomoi, nzokande ozali na yo ya kokufa.


Nayebi misala na yo, mpe nayebi malamu ete ozali malili te mpe ozali moto te ; nalingaki nde ozala malili to moto.


Nayebi misala na yo. Tala, natiaki liboso na yo ekuke moko ya kofungwama, ekuke oyo moko te akoki kokanga. Nayebi ete ozali na nguya moke, obatelaki Liloba na Ngai mpe owanganaki te Kombo na Ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ