Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 2:17 - Mokanda na Bomoi

17 Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, nakopesa ye mana oyo ebombama ; nakopesa ye lisusu libanga moko ya pembe oyo bakoma kombo moko ya sika na likolo na yango, kombo oyo eyebani kaka na moto oyo akozwa yango. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 2:17
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe ayebisaka mabongisi na Ye epai ya bato oyo batosaka Ye, alakisaka bango mabombami ya boyokani na Ye.


Oh Nzambe, tala ndenge nini bolingo na Yo ezali motuya ! Bato bazwaka ebombamelo na elili ya mapapu na Yo.


Boye Moyize alobi na Aron : — Kamata ekolo moko mpe tia omeri moko ya mana kati na yango ; bongo tia yango liboso ya Yawe mpo ete ebombama mpo na milongo oyo ekoya.


Motema eyebaka pasi na yango moko, moko te akoki kokabola na yango esengo.


Pamba te Yawe ayinaka bato mabe, kasi ayebisaka basekele na Ye epai ya bato ya sembo.


Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : « Mpo na basoda oyo baboma bango mikongo, oyo babatelaka mokolo na Ngai ya Saba, oyo baponaka makambo oyo esepelisaka Ngai, mpe bakangamaka na boyokani na Ngai :


nakopesa bango, kati na Tempelo na Ngai mpe na bamir na yango, ekaniseli oyo ezali na kombo : ekozala malamu koleka kozala na bana mibali mpe bana basi. Nakopesa bango kombo ya libela, oyo bakoki kolongola te.


Bongo bikolo ekomona bosembo na yo, mpe bakonzi nyonso bakomona nkembo na yo. Bakobenga yo na kombo ya sika oyo monoko na Yawe ekopesa.


Mpo na yango, Nkolo Yawe alobi : « Bawumbu na Ngai bakolia, kasi bino bokozala na nzala ; bawumbu na Ngai bakomela, kasi bino bokotikala kaka na posa ya komela ; bawumbu na Ngai bakosepela, kasi bino bokoyoka soni ;


Bokotika kombo na bino epai ya baponami na Ngai lokola lisuma ; Nkolo Yawe akoboma bino ; kasi epai ya baponami na Ye, akopesa kombo mosusu.


Yesu azongiselaki bango : — Ezali mpo ete boyebi ya mabombami ya Bokonzi ya Likolo epesameli nde na bino, kasi na bango te.


Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !]


Kasi Yesu azongiselaki bango : — Ngai, nakolia bilei oyo bino boyebi te.


Moto oyo azangi Molimo ya Nzambe akoki te koyamba makambo kowuta na Molimo ya Nzambe, pamba te ezali lokola liboma na miso na ye ; akoki mpe te koyeba yango, pamba te basosolaka yango kaka na nzela ya Molimo.


Pamba te bokufaki penza, mpe bomoi na bino ezali sik’oyo ya kobombama elongo na Klisto kati na Nzambe.


mpe bazali koyemba nzembo ya sika liboso ya Kiti ya Bokonzi, ya bikelamu minei ya bomoi mpe ya bampaka. Moko te akokaki koyekola nzembo yango longola kaka bato nkoto nkama moko na tuku minei na minei oyo basikolamaki wuta na mokili.


Na nzambala mpe na mopende na Ye, bakoma kombo : « Mokonzi ya Bakonzi mpe Nkolo ya bankolo. »


Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, kufa ya mibale ekosala ye pasi ata moke te. »


Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, nakopesa ye nzela ya kolia mbuma ya nzete ya bomoi, oyo ezali kati na Paradizo ya Nzambe. »


Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba !


Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ