Emoniseli 2:14 - Mokanda na Bomoi14 Nzokande, ezali na ndambo ya makambo oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango : kati na yo, ezali na bato oyo bakangama na mateya ya Balami oyo ayebisaki Balaki ete atia motambo mpo na kotindika bana ya Isalaele kati na masumu ya kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, mpe kati na masumu ya kindumba. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Soki moto ya sembo atiki kosalela bosembo na ye mpe akomi kosala mabe, nakotia libaku liboso na ye, mpe moto yango akokufa, solo. Soki okebisaki ye te, akokufa penza mpo na masumu na ye, mpe bakotikala kokanisa lisusu te bolamu nyonso oyo ye asilaki kosala ; kasi nakotanga makila na ye na moto na yo.
Mpo na bato ya bikolo ya bapaya oyo bakomi bandimi, tokomeli bango mikano na biso ete basengeli te kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, basengeli te komela makila, basengeli te kolia nyama oyo babomi na kozanga kobimisa makila, basengeli te kosala kindumba ya lolenge nyonso.
Nzokande, ezali na likambo moko oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango : opesaka na Jezabeli, mwasi oyo amibengaka mosakoli, nzela ya kopengwisa basali na Ngai na mateya na ye ya mabe, mpo na kotindika bango na kindumba mpe na kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu.