Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 2:12 - Mokanda na Bomoi

12 Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Pergame : « Tala maloba ya Ye oyo asimbi mopanga bapelisa na bangambo nyonso mibale :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 2:12
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

kasi akokata makambo ya bato bakelela na bosembo mpe akozwa mikano ya sembo mpo na babola ya mokili. Akobeta mokili fimbu na maloba na ye mpe akoboma bato mabe na pema ya monoko na ye.


akomisi monoko na ngai lokola mopanga ya minu makasi, abombi ngai na se ya elili ya loboko na Ye, akomisi ngai lokola tolotolo mpe abombi ngai kati na ebombelo batolotolo na Ye ;


Pamba te Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, ekotaka koleka kutu mopanga oyo ezali na minu na bangambo nyonso mibale, ekomaka kino kokabola elimo mpe molimo, mikuwa mpe mafuta oyo ezalaka kati na mikuwa, mpe esosolaka malamu makanisi mpe mikano ya motema ya moto.


koloba : « Koma na buku makambo oyo ozali komona, mpe tinda yango na Mangomba sambo oyo : Efeso, Simirne, Pergame, Tiyatire, Sarde, Filadelfi mpe Laodise. »


Na loboko na Ye ya mobali, asimbaki minzoto sambo ; mpe wuta na monoko na Ye, mopanga moko bapelisa na bangambo na yango nyonso mibale ezalaki kobima. Elongi na Ye ezalaki lokola moyi, na tango oyo engalaka makasi.


Mopanga moko ya minu ezalaki kobima na monoko na Ye mpo na kobeta bikolo. Akokamba yango na lingenda ya ebende mpe akonika bambuma ya vino kati na ekamolelo ya vino ya kanda monene ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.


Bongo mopanga oyo ebimaki na monoko ya Motambolisi ya mpunda ebomaki bato oyo batikalaki, mpe bandeke nyonso etondaki na kolia misuni ya bibembe na bango.


Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Efeso : « Tala maloba ya Ye oyo asimbi minzoto sambo na loboko na Ye ya mobali mpe atambolaka kati na bitelemiselo sambo ya minda, oyo basala na wolo :


Boye, bongola motema na yo ! Soki te, nakoya kala mingi te epai na yo mpe nakobundisa bango na mopanga ya monoko na Ngai.


Ewudi amisalelaki mopanga ya minu mibale, ya ndambo ya metele na molayi. Akangaki yango na loketo na ye, na ngambo ya loboko ya mobali, mpe abombaki yango na se ya bilamba na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ