Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 19:3 - Mokanda na Bomoi

3 Bagangaki na mbala ya mibale : « Aleluya ! Pamba te molinga kowuta na mwasi ya ndumba monene ezali komata na likolo mpo na libela na libela ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 19:3
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

atalaki na ngambo ya Sodome mpe ya Gomore, mpe na ngambo ya mokili ya etando ; amonaki molinga makasi komata wuta na mokili lokola molinga ya fulu monene ya moto.


Tika ete bato ya masumu basila na mokili, mpe bato mabe bazala lisusu te ! Oh molimo na ngai, pambola Yawe ! Aleluya, bokumisa Yawe !


moto oyo ekokufa te ezala na moyi to na butu, bongo molinga na yango ekobanda komata mpo na libela. Ekotikala esobe libela na libela, mpe ata moto moko te akoleka lisusu wana.


Ndenge moko mpe mpo na bato ya Sodome, ya Gomore mpe ya bingumba ya pembeni : basalaki ndenge moko na ba-anjelu, bamipesaki na pite mpe bazalaki kosangisa nzoto na ndenge oyo esengeli te. Bazali ndakisa mpo na bato oyo bazali komona pasi ya etumbu ya moto ya seko na seko.


Molinga ya pasi na bango ekomata na likolo mpo na libela na libela. Butu mpe moyi, bopemi ekozala te mpo na bato oyo bagumbamelaka nyama mpe ekeko na yango, mpe mpo na moto nyonso oyo akondima kozwa elembo ya kombo na yango. »


Wana bakomona molinga komata longwa na engumba oyo etumbami, bakoganga : ‹ Engumba nini ekokanaki na engumba monene oyo ? ›


Tango bakonzi ya mokili, oyo bakabolaki elongo na yango bomoi na yango ya kindumba mpe ya bisengo, bakomona molinga ya engumba oyo etumbami, bakolela mpe bakoyoka mawa na tina na yango.


Sima na makambo wana, nayokaki lokola makelele ya bato ebele koganga kuna na Lola : « Aleluya ! Lobiko, nkembo mpe nguya ezali ya Nzambe na biso,


Bampaka tuku mibale na minei mpe bikelamu minei ya bomoi bafukamaki mpe bagumbamelaki Nzambe oyo avandaka na Kiti ya Bokonzi, mpe bagangaki : « Amen ! Aleluya ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ